Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/7 lok. 32
  • Fungolá miso, moto akosa yo te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Fungolá miso, moto akosa yo te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/7 lok. 32

Fungolá miso, moto akosa yo te

LOKUTA ebandá kala mpenza. Moko na makambo ya liboso oyo ekomami oyo ekómelaki bato ezalaki ete bakosaki bango. Ezalaki ntango Satana akosaki Eva na elanga ya Edene.​—⁠Genese 3:13; 1 Timote 2:⁠14.

Atako banda na ntango wana bato bakosaka, lelo oyo nde eleki mpenza. Biblia elobaki mpo na mikolo na biso ete: “Bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na mabe na bango, bakobungisa bato nzela mpe bakomibungisa nzela bango moko.”​—⁠2 Timote 3:​13, NW.

Bazali kokosa bato mpo na bantina ndenge na ndenge. Bato oyo babukaka lokuta bazali kokosa bato na maloba ya sukali mpo na koyiba mbongo na bango. Bato mosusu ya politiki bazali kokosa bato mpo balingi kofanda na bokonzi. Bato bazali mpe komikosa bango moko. Na esika ete bábundisa mikakatano, bazali komikosa na kokanisáká ete soki bazali komipesa na makambo ya mabe lokola komɛla likaya, komɛla bangi, to kosala pite mpe ekobo, mpasi moko te ekoyela bango.

Bato bazali mpe kokosa na makambo ya losambo. Bakonzi ya mangomba ya ntango ya Yesu bazalaki kokosa bato. Mpo na bakosi yango, Yesu alobaki ete: “Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.” (Matai 15:​14, NW) Lisusu, bato bamikosaka bango moko na makambo ya losambo. Masese 14:12 elobi ete: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai ya moto, nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.”

Lokola na ntango ya Yesu, bato mingi lelo oyo bakosamaka na makambo ya losambo, mpe ekoki kokamwisa biso te! Ntoma Paulo alobaki ete Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.”​—⁠2 Bakolinti 4:​4, NW.

Soki moto moko akosi biso, tokobungisa mbongo. Soki moto ya politiki akosi biso, tokoki kobungisa mwa bonsomi na biso. Kasi soki Satana akosi biso mpo tóboya solo oyo etali Yesu Klisto, tokobungisa nde bomoi ya seko! Yango wana, fungolá miso, moto akosa yo te. Talelá malamumalamu Biblia, mokanda oyo ezali na solo oyo moto akoki kotyela yango ntembe te. Soki osali bongo te, okobungisa matomba mingi.​—⁠Yoane 17:⁠3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto