“Bazi- nda- ki”
“Ebele ya mai ezipaki bango; bazindaki na nse ya mai lokola libanga.”
MOSE na Bayisalaele bayembaki maloba yango na loyembo mpo na kosepela ntango bakatisaki Mai Motane mpo na kozwa bonsomi mpe ndenge oyo banguna na bango, elingi koloba Falo ya Ezipito na basoda na ye, bakufaki.—Exode 15: 4, 5; NW.
Moto nyonso oyo amonaki likambo monene wana na miso na ye, azwaki mpenza liteya na yango. Moto moko te akoki kotya ntembe to kotɛmɛla bokonzi ya Yehova mpe atikala na bomoi. Kasi, kaka mwa basanza na nsima, bankumu mosusu ya Yisalaele: Kola, Datana, Abilama, na bato 250 oyo bazalaki nsima na bango, batɛmɛlaki Mose na Alona, bato oyo Nzambe apesaki bango bokonzi.—Mituya 16:1-3.
Yehova asɛngaki Mose ayebisa Bayisalaele ete bálongwa pene ya bahema ya batomboki. Datana na Abilama, na mabota na bango baboyaki. Na nsima Mose alobaki ete Yehova, na ndenge oyo akomona malamu, akomonisa polele ete mibali yango bazalaki “kotosa [Yehova] te.” Na yango, Yehova afungolaki mabele na nse ya makolo na bango. “Boye bango nyonso mpe biloko na bango nyonso bakitaki na bomoi na esika na bakufi mpe mokili ezipaki na likoló na bango.” Kasi nini ekómelaki Kola na batomboki mosusu? “Mɔ́tɔ ebimaki na Yehova mpe ezikisaki bankama mibale na ntuku mitano bazalaki kokaba mpaka na malasi.”—Mituya 16:23-35; 26:10.
Falo na basoda na ye, bato oyo batombokaki na esobe, bango nyonso wana bakufaki mpo bandimaki bokonzi ya Yehova te mpe bandimaki te ndenge oyo azalaki kotambwisa libota na ye. Yango wana, esengeli ete bato nyonso oyo bazali komona ete Yehova azali kobatela na mikolo oyo ya mabe, básala noki mpo na koyeba Yehova mpe kotosa ye mpo azali “Oyo-Aleki-Likoló” mpe “Oyo-na-Nguya-Nyonso.” Soki basali bongo, bakoki kolendisama na maloba ya Yehova ete: “Nkóto bakokwea pembeni na yo mpe nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali; likambo yango nde ekoya penepene na yo te. Kasi okotala bobele na miso mpe okomona [lifuti ya, NW] bato mabe. Zambi, yo [olobi, Yehova azali esika na ngai ya komibomba, yo okómisi Oyo-Aleki Likoló esika na yo ya kofanda, NW].”—Nzembo 91:1, 7-9.