Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/6 lok. 29
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Batisimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Eloko nini ezali kopekisa yo na kozwa libatisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Osengeli kobatisama lisusu?
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/6 lok. 29

Mituna ya batángi

Esengeli kaka kozindisa moto oyo alingi kozwa batisimo mobimba na mai ata soki azali mpenza ebɔsɔnɔ to na maladi makasi oyo mpo na yango kozindisa ye na mai ezali mpasi?

Liloba “kobatisa” euti na verbe ya Grɛki baptô, oyo elimboli “kozindisa.” (Yoane 13:26) Na Biblia, “kobatisa” ezali ndenge moko na “kozindisa.” Mpo na batisimo oyo Filipo apesaki mokube Moetiopia, libongoli ya Biblia ya Rotherham (The Emphasised Bible) elobi boye: “Bakitaki bango mibale na mai, na Filipo na Mokube,​—⁠mpe azindisaki ye.” (Misala 8:38) Na yango, moto oyo bazali kobatisa ye bazindisaka ye mpenza mobimba na mai.​—⁠Matai 3:16; Malako 1:⁠10.

Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango.” (Matai 28:​19, 20) Yango wana, Batatoli ya Yehova babatisaka ezala na pisini, na Laki, na ebale, to na esika mosusu oyo ezali na mai mingi mpo moto azinda mobimba na mai. Lokola Makomami esɛngi kozindisa moto mobimba na mai, bato basengeli te kozwa ekateli ete moto boye, mpo na mokakatano oyo azali na yango, akozwa batisimo te. Yango elingi koloba ete moto asengeli kozwa batisimo ata soki esɛngi makambo mosusu ya mpasi. Na ndakisa, bato mosusu oyo bazali mibange to mpe bato oyo bazali na mikakatano ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, babatisaki bango na kati ya saani moko ya monene ya kosukola. Ntango mosusu bakómisaki mai yango mwa mɔ́tɔ, na nsima bakitisaki moto oyo azali kozwa batisimo malɛmbɛmalɛmbɛ na mai mpe, ntango amiyoki malamu kati na yango nde bapesaki ye batisimo mpenza.

Ata bato oyo bazali mpenza bibɔsɔnɔ babatisamaki. Na ndakisa, ezala bato oyo bakɔtisá bango tiyo na nkingo mpo basalá bango lipaso na mongongo, to mpe bato oyo balataka mwa masini oyo esalisaka bango na kopema, bazindisamaki na mai mpo na kozwa batisimo. Ya solo, mpo na kopesa bato ya ndenge yango batisimo, esengelaki liboso kobongisa bango malamu. Ekozala ntango mosusu malamu ete lifulume to monganga azala wana. Nzokande, soki balɛngɛli makambo nyonso mpe babongisi yango malamu, mbala mingi bakoki kopesa bato ya ndenge wana batisimo. Yango wana, esengeli kosala mpenza milende mpo na kobatisa moto na mai soki yango ezali mposa ya solosolo ya moto yango mpe soki andimi yango ata soki ezali na makama.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto