Mituna ya batángi
Ekozala nde likambo ya mayele mpo na moklisto ya solo ete akende na ebembe to na libala na ndako-nzambe moko?
Yehova asepelaka ata moke te ete tósangana na losambo ya lokuta ya lolenge nyonso, tosengeli kosala yango te. (2 Bakolinti 6:14-17; Emoniseli 18:4) Misa mpo na mowei ezali molulu ya lingomba oyo, mbala mosusu, bateyaka makanisi oyo ezali na Biblia te, lokola oyo elobaka ete molimo ekufaka te mpe ete bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló. Ntango mosusu mpe basalaka elembo ya ekulusu to mpe sango abondelaka na bato nyonso. Ntango bazali kobalisa bato na ndako-nzambe, ntango mosusu mpe basalaka milulu mpe mabondeli oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Soki moklisto azali na kati ya bato ebele oyo bazali kosangana na losambo ya lokuta, ekoki kozala mpasi mpo aboya kosangana na yango. Komitya kati na mokakatano ya ndenge wana ezali mpenza kozanga mayele!
Moklisto akosala nini soki amoni ete asengeli kokende na ebembe to na libala moko, kasi ezali kosalema na ndako-nzambe? Na ndakisa, mobali oyo azali mondimi te akoki kosɛnga mwasi na ye oyo azali moklisto ete bákende elongo na esika ya ndenge wana. Akoki nde kondima kokende elongo na mobali na ye mpe kozala motali mpamba? Mpo na kokokisa mposa ya mobali na ye, mwasi akoki kozwa ekateli ya kokende, mpe akomityela mokano makasi ete, ata ndenge nini, asangana te na milulu ya losambo. Akoki mpe koboya kokende ntango amoni ete likambo yango ekoki kozala mokakatano monene mpo na ye, ntango mosusu ekoki kotinda ye abuka mitinda ya Nzambe. Ye moko nde akozwa ekateli. Asengeli kondima ete azwi ekateli ya malamu mpe lisosoli na ye ekotungisama te.—1 Timote 1:19.
Na nyonso wana, ekozala malamu alimbwela mobali na ye ete akoki kosangana na milulu ya losambo te to mpe koyemba nzembo ya lingomba te to kokitisa motó na ye ntango bazali kosambela. Nsima ya kolimbola likambo yango, mobali na ye akoki komona ete soki akei na mwasi na ye, yango ekoki kobimisa likambo moko oyo ekosepelisa ye te. Akoki komona malamu akende ye moko mpo alingi mwasi na ye, azali komemya bindimeli na ye, to aboyi ete mokakatano moko ebima. Kasi soki mobali atingami kaka ete mwasi akende na ye, mwasi akoki kokende mpe akotala kaka makambo na miso, akosangana na yango te.
Tosengeli mpe kobosana te kotalela ndenge oyo bandeko na biso mosusu bandimi bakokanisa soki tokei na likita ya lingomba na ndako-nzambe moko. Likambo yango ekoki kobɛtisa bato mosusu libaku? Ntango mosusu likambo yango ekoki kolɛmbisa ekateli na bango ya koboya losambo ya bikeko? Ntoma Paulo apesi toli ete: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina, mpo bózala pɛto mpe bóbɛtisa bamosusu libaku te tii na mokolo ya Klisto.”—Bafilipi 1:10, NW.
Soki ezali ebembe to libala ya ndeko ya libota, ntango mosusu bato mosusu ya libota bakoki kotya biso mpenza mbamba. Ezala ndenge nini, moklisto asengeli kotalela makambo nyonso malamumalamu. Na bantango mosusu moklisto akoki komona ete mokakatano moko ekozala te soki akei na ebembe to mpe libala lokola motali mpamba. Kasi, ekoki kozala ete soki akei, ntango mosusu lisosoli na ye moko to ya basusu ekotungisama mingi koleka matomba oyo akoki kozwa soki akei. Ezala ndenge nini, moklisto asengeli mpenza komindimisa ete ekateli na ye ekosalisa ye ete abatela lisosoli ya malamu liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.