Tosengeli koyeba soki Nzambe azali nani
OYOKAKA esengo te ntango ozali kotala likoló etondi na minzoto na butu? Nsolo kitoko ya bafololo ya langi ndenge na ndenge esepelisaka yo te? Osepelaka te na koyoka nzembo ya bandɛkɛ mpe makɛlɛlɛ ya nkasa oyo mwa mopɛpɛ ezali koningisa? Kanisá mpe babalɛnɛ, bambisi mosusu mpe banyama mosusu ya mai monene! Bakisa mpe lisusu lisosoli oyo bato bazalaka na yango mpe bɔɔngɔ na biso oyo esalemá na ndenge ya kokamwa. Mpo na yo, biloko nyonso ya kokamwa oyo etondi na mokili eutá wapi?
Bato mosusu bakanisaka ete biloko wana nyonso ebimá yango moko. Kasi soki ezali bongo, mpo na nini bato bandimaka ete Nzambe azali? Soki bato bakelamá te, mpo na nini bazalaka na mposa ya makambo ya elimo?
“Moto nyonso, azala mozwi to mobola, ezala atángá mingi to te, azalaka na mposa ya kosambela.” Maloba yango ezali likanisi mokuse oyo Profesɛrɛ Alister Hardy amonisi na bolukiluki na ye mpe akomaki yango na buku moko (The Spiritual Nature of Man). Boyekoli oyo bato ya mayele oyo bayekolaka bɔɔngɔ basali mikolo oyo etindi bango na koloba ete ekoki mpenza kozala ete bato basalemá na mposa ya kosambela Nzambe. Buku moko (Is God the Only Reality?) elobi boye: “Koluka koyeba ntina ya bomoi na nzela ya losambo . . . ezali likambo oyo bato ya bamboka nyonso mpe ya bikeke nyonso basalaka kobanda moto azali na mokili.”
Talá likambo oyo moto moko oyo atángá mingi alobaki eleki mbula 2 000. Akomaki boye: ‘Ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso ezali Nzambe.’ (Baebele 3:4) Kutu, vɛrsɛ ya liboso mpenza ya Biblia elobi ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.”—Genese 1:1.
Kasi, Nzambe azali nani? Bato na bato bazali na makanisi na bango na likambo yango. Ntango batunaki Yoshi, elenge mobali moko ya ekólo Japon, soki Nzambe azali nani, ayanolaki boye: “Nayebi mpenza te. Nazali moto ya Lingomba ya Bouddha, mpe mpo na ngai ezali na ntina te nayeba soki Nzambe azali nani.” Kasi, Yoshi ye moko alobaki ete bato mingi bakómisa Bouddha nzambe. Nick, moto moko ya mombongo oyo azali na mbula 60, andimaka Nzambe mpe akanisaka ete azali nguya moko oyo eleki nguya nyonso. Ntango basɛngaki ye alimbola makambo oyo ayebi mpo na Nzambe, Nick afandaki naino nyɛɛ, na nsima alobaki ete: “Ndeko na ngai, oyo ezali motuna makasi mpenza. Nakoki kaka koloba ete Nzambe azali.”
Bato mosusu “basambelaka mpe basalelaka biloko oyo Nzambe azalisá na esika básambela Mozalisi ye moko.” (Baloma 1:25, Today’s English Version) Bamilio ya bato basambelaka bankɔkɔ na bango oyo bakufá, bakanisaka ete Nzambe azali mosika mingi. Lingomba ya Hindu ezali na banzambe-mibali mpe banzambe-basi ebele. Na mikolo ya bantoma ya Yesu Klisto, bato bazalaki kosambela banzambe ebele lokola Zeu na Eleme. (Misala 14:11, 12) Mangomba mingi ya boklisto eteyaka ete Nzambe azali Bosato, elingi koloba ezali na Nzambe Tata, Nzambe Mwana, mpe Nzambe Elimo Santu.
Ya solo, Biblia elobi ete ‘banzambe bazali mingi mpe bankolo bazali mingi.’ Kasi ebakisi ete: “Mpo na biso Nzambe moko azali, ye Tata; biloko nyonso bizalisamaki na ye.” (1 Bakolinti 8:5, 6) Nzambe ya solo azali kaka moko. Kasi azali nani? Azali ndenge nini? Ezali na ntina mingi tózwa biyano na mituna oyo. Yesu ye moko abondelaki Ye ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Emonani mpenza ete mpo tózala na bomoi ya seko, esengeli tóyeba solo na oyo etali Nzambe.
[Elilingi na lokasa 3]
Nini esalá ete bázala?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Balɛnɛ: Na ndingisa ya Tourism Queensland