Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/5 lok. 32
  • Otángaka motuya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otángaka motuya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/5 lok. 32

Otángaka motuya?

YESU KLISTO ateyaki bayekoli na ye elikya ya bomoi ya seko, kasi alendisaki bango mpe ete bátánga motuya ya kozala moklisto. Mpo bákanga ntina ya likambo yango, atunaki boye: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga ndako ya molai akofanda liboso te mpo na kotánga motuya mpe kotala soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:​28, NW) Motuya nini Yesu alobelaki?

Baklisto nyonso bakutanaka na mikakatano; mikakatano mosusu ezalaka minene. (Nzembo 34:19; Matai 10:36) Yango wana, tosengeli kobongisa makanisi mpe elimo na biso mpo tókamwa te ntango tokutani na botɛmɛli to na mikakatano mosusu. Tokanisi ete tosilá kotalela likambo ya kokutana na mikakatano na kati ya motuya ya kozala moyekoli ya Klisto, mpamba te toyebi ete mbano na yango, elingi koloba kosikwama na masumu mpe na liwa, ezali na motuya koleka biloko nyonso oyo tokoki kozwa na mokili oyo. Toyebi ete soki tozali ntango nyonso kosalela Nzambe, eloko moko te oyo akoki kotika nzela ete eyela biso, ata liwa, ekoki kobebisa biso libela.​—⁠2 Bakolinti 4:​16-18; Bafilipi 3:⁠8.

Ndenge nini kondima na biso ekoki kokóma makasi? Kondima na biso ekolaka mbala nyonso oyo tozwi ekateli oyo ebongi, oyo tokangami na mitinda ya boklisto, to ntango tosali likambo moko oyo eyokani na mokano ya Nzambe, mingimingi soki motema ezali kotinda biso tósala ndenge mosusu. Ntango tozwi mapamboli ya Yehova mpo na bosembo na biso, kondima na biso elendisamaka mpe ekolaka. Na ndenge yango, tolandaka ndakisa ya Yesu, ya bayekoli na ye ya liboso, mpe ya basi na mibali nyonso banda na ntango ya kala oyo bazalaki na kondima mpe ‘batángaki motuya’ malamu ya kosalela Nzambe.​—⁠Malako 1:​16-20; Baebele 11:​4, 7, 17, 24, 25, 32-38.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto