Atako akómaki mobange, ayekolaki
MWASI moko mobange nkombo na ye Kseniya, ye abotamá na mobu 1897. Abotá bana minei: misato ya basi, moko ya mobali; azali na bankɔkɔ 15 mpe bana ya bankɔkɔ na ye 25. Na bomoi na ye mobimba azalaki kosala oyo baboti na ye bateyaki ye. Atako akendaki kofanda na engumba Moscou mpo akimaki bitumba na ekoló na ye Abkhazie oyo ezali na katikati ya Mer Noire na bangomba ya Caucase, azalaki kosepela na bomoi oyo azalaki na yango; mingimingi azalaki kosepela na oyo azalaki kobenga lingomba ya baboti na ye.
Na 1993, Meri, mwana ya Kseniya moko ya mwasi, akómaki Motatoli ya Yehova. Meri abandaki kosolola na Kseniya mpo na Yehova Nzambe mpe Biblia, kasi Kseniya azalaki kolinga koyoka yango te. Mbala nyonso, Kseniya azalaki koyebisa mwana na ye ya mwasi ete “Nakómi mobange, ntango ya koyekola makambo ya sika eleká.”
Atako bongo, mwana na ye Meri; mwasi ya nkɔkɔ na ye ya mobali Londa; mpe bana ya bankɔkɔ na ye ya basi Nana na Zaza, oyo nyonso basilaki kokóma Batatoli ya Yehova, bazalaki kolanda kosolola na ye mpo na Biblia. Mokolo moko na mpokwa na 1999, batángelaki Kseniya vɛrsɛ moko oyo esimbaki motema na ye. Vɛrsɛ yango ezalaki na maloba oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo ntango abandisaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. (Luka 22:19, 20) Na mpokwa yango, Kseniya azwaki ekateli ya koyekola Biblia, azalaki na mbula 102.
Kseniya alobi boye: “Nsukansuka nayebaki ntina ya bomoi, nsima ya kokokisa mbula 102. Namoni sikoyo ete eloko moko te eleki kosalela Yehova, Nzambe na biso ya malamu mpenza mpe ya bolingo. Nazali naino na makasi ya kosala mosala mpe nazali nzoto kolɔngɔnɔ. Nalataka manɛti te mpo na kotánga mpe nasololaka mpe nasalaka makambo mosusu mingi na bandeko na ngai.”
Mokolo ya 5 Novɛmbɛ 2000, Kseniya azwaki batisimo. Alobi boye: “Sikoyo napesi bomoi na ngai epai ya Yehova mpo na kosalela ye na bolingo mpenza. Nakabolaka bazulunalo mpe batrakte na esika oyo bisi etɛlɛmaka penepene ya ndako na ngai. Bandeko ya libota na ngai bayaka mingi kotala ngai mpe nayebisaka bango solo ya Yehova.”
Kseniya azelaka na mposa makasi mokolo oyo ‘mosuni na ye ekoleka yango na elenge na kitoko, akozonga na mikolo na bolenge na ye.’ (Yobo 33:25) Soki mobange ya mbula koleka nkama amoni ete ntango eleká te mpo na koyekola Biblia mpo na koyeba ntina ya bomoi, ezali boni mpo na yo?