Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/3 nk. 3-4
  • Batambwisi ya malamu bazali komonana te na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batambwisi ya malamu bazali komonana te na mokili mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bisengo ya babuku mbuma na lnde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nani abongi mpenza kozala mokonzi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/3 nk. 3-4

Batambwisi ya malamu bazali komonana te na mokili mobimba

Moto moko azalaki mokomi ya babuku mpe mokomi ya maloba ya ntɔki. Ye azalaki mpenza na elikya ete na mikolo ekoya, mokili ekozala malamu. Eleki sikoyo mbula 90, moto yango akanisaki mokili moko oyo “bato bakozala na kobanga te mpe bakozala na bomoi ya malamu; bato bakotánga kelasi ofele; bandelo oyo ekaboli bikólo ekozala lisusu te; bato bakobanda koloba kaka solo; [mpe] bakosala milende mpo na kokóma na makambo ya kokoka.”

NA NSIMA, mokomi yango alobaki ete elikya na ye ezali ete mokolo mosusu, ekólo na ye mpe mokili mobimba ekóma esika ya ndenge yango. Kasi, soki mokomi wana ya maloba ya ntɔki, oyo azwaki kutu mbano monene oyo babengaka Prix Nobel, azalaki na bomoi na moi ya lelo, alingaki mpenza kolɛmba nzoto. Lelo oyo, atako bato bayekoli makambo mingi mpe basali biloko ya sika mingi, mokili ekabwani mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Eloko moko mpe te ezali kopesa elikya ete makambo ekozala malamu na mikolo ekoya.

Batunaki mosali-bilanga moko ntina oyo bato ya ekólo na ye bakabwanaki na mbala moko mpe bakómaki kobunda bango na bango; moto yango ayebisaki likambo oyo, na makanisi na ye, ezali moko ya bantina ya bokabwani mpe ya bitumba. Alobaki ete: “Ezali mpo ete batambwisi bazali mabe.” Jonathan Glover, moto ya mayele na istware, akomaki buku moko (Humanity​—⁠A Moral History of the Twentieth Century) oyo na kati na yango amonisaki mpe likanisi ndenge moko na mosali-bilanga wana; alobaki boye: “Koboma bato ya etuluka moko mpo na koluka kosilisa bango [ndenge esalemaki na ekólo wana] ebandaki na mbalakaka te mpo mbala mosusu bato ya bituluka oyo ekeseni bazalaki koyinana, ezali nde bato oyo balingaki kotika bokonzi te nde babongisaki likambo yango.”

Na ebandeli ya bambula ya 1990, ntango bitumba ebandaki na kati ya bikólo mibale ya mike oyo ezalaki na kati ya ekólo Yougoslavie, mopanzi-nsango moko akomaki boye: “Tofandaki esika moko na esengo bambula ebele, bongo lelo ekómi bato ya ngámbo oyo bábomaka bana ya bato ya ngámbo oyo kuna. Likambo nini ezali kokómela biso?”

Mokomi oyo tolobelaki na ebandeli azali moto ya Inde, ekólo oyo ezali mosika mpenza na Mpoto. Pranay Gupte, ye akomaka babuku, asalaki lisukulu moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki motuna oyo: “Inde ekoki kotikala kaka ekólo moko?” Na lisukulu yango alobaki boye: ‘Na Inde, bato oyo baleki mingi (70 %) bazali bilenge oyo bakokisi naino mbula 30 te, kasi bazali na batambwisi te oyo bango bakoki kolanda lokola ndakisa na bango.’

Na bikólo mosusu, batambwisi mosusu balongwaki na bokonzi mpamba te bazalaki koyiba biloko ya Leta. Yango wana, mpo na bantina ndenge na ndenge, tozali komona ete mokili ezali kozanga batambwisi ya malamu. Makambo nyonso oyo ezali komonisa ete mosakoli moko oyo azalaká na bomoi eleki mbula soki 2 600 alobaki solo ete: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”​—⁠Yilimia 10:⁠23.

Ndenge nini mpasi oyo ezali lelo na mokili ekoki kosila? Nani oyo akoki kotambwisa bato mpo mokili ezala lisusu na bitumba te to mpe kobanga ezala lisusu te, boyebi ya solo ezala ofele mpe ezala bipai nyonso, bato bákende liboso tii na ezaleli ya kokoka?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Fatmir Boshnjaku

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto