‘Bolingo na biso ekómi lisusu makasi’
MOKOLO ya mitano, 31 Marsi 2000, Ngomba Usu oyo ezali na Hokkaido, esanga moko ya ekólo Japon, ebandaki lisusu kobimisa mɔ́tɔ nsima ya mbula 23 banda etiká kobimisa mɔ́tɔ. Ebele ya bato oyo bafandaka zingazinga bakimaki mosika mpo bázwa likama te. Bandako mingi mpe misala ya ebele ya bato ebebaki; kasi, likambo ya malamu ezali ete ata moto moko te akufaki. Na kati ya bato oyo bakimaki, Batatoli ya Yehova bazalaki 46; kasi, bandeko mosusu batikaki bango bongo te.
Kaka na mokolo oyo likambo yango ebandaki, mokɛngɛli-motamboli moko oyo atalaka masangá oyo ezali kuna asalisaki na kozwa bibongiseli mpo na kosunga bandeko. Eumelaki te, masangá ya pembenipembeni ebandaki kotinda biloko. Biro ya filiale ya Japon etambwisaki makambo mpo ete komite ya lisungi esalema nokinoki mpe Batatoli ya Yehova ya Japon mobimba batindaki makabo mpo na kosalisa bandeko. Mpo makambo ya elimo etikala nsima te, batindaki Batatoli ya Yehova oyo bazali babongisi-nzela na lisangá oyo bandeko mingi bakimaki, mpe mokɛngɛli ya zongazonga azalaki kokende kuna mbala na mbala mpo na kolendisa bandeko na elimo.
Batatoli ya esika oyo likama esalemaki batikaki koyangana na makita te na mikolo wana ya mpasi; bazalaki koyangana na bandako ya bandeko na bisika oyo bakimaki. Ntango bakonzi ya mboka bapesaki bato nzela ete bázonga na bisika na bango; bandeko bakendaki na Ndako ya Bokonzi mpe bakutaki ndako yango etɛngami mpe bifelo epasukipasuki. Milinga ezalaki naino kobima ebele na libulu oyo mɔ́tɔ ezalaki kobima na ngomba; yango ezalaki mosika te na Ndako ya Bokonzi. Batatoli bamitunaki, ‘Ekozala nde malamu tólanda kosala makita na ndako oyo? Tokoki kobongisa Ndako ya Bokonzi yango?’
Bazwaki ekateli ya kotonga Ndako ya Bokonzi mosusu mwa mosika na esika oyo ezali na likama te. Komite ya Botongi epesaki lisungi oyo esengeli. Mbongo mpo na kotonga ndako eutaki na makabo ya Batatoli ya ekólo mobimba. Eumelaki te, esika emonanaki mpe bankama ya bandeko ya bolingo malamu bapesaki mabɔkɔ mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi na mwa ntango moke. Na mokolo ya lomingo, 23 Yuli 2000, bato 75 bayanganaki na makita ya liboso oyo basalaki na Ndako ya Bokonzi ya sika oyo bautaki kotonga. Bayangani mingi batangisaki mpisoli mpo na esengo. Lisukulu ya bofungoli Ndako ya Bokonzi esalemaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mbula yango; mokolo yango, nkulutu moko ya lisangá wana alobaki boye: “Mɔ́tɔ oyo ebimaki na ngomba ememaki mikakatano mpe mpasi. Kasi, ndako oyo ebongoli kobanga na biso na esengo. Bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bandeko na biso ekómi lisusu makasi!”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Ngomba Usu ezali kobimisa mɔ́tɔ: Fɔtɔ AP/Koji Sasahara