Ozwaka mpe esengo oyo eutaka na kopesa makabo ya bolingo malamu?
MAKABO ezali eloko, mbongo to lisalisi oyo moto to bato bapesi na moto mosusu to na bato mosusu. Liloba ya Liebele terumah elimboli “makabo, ndambo oyo ezali mosantu, kotombola mbeka.” (Exode 25:2, NW, maloba na nse ya lokasa; Exode 29:27, NW, maloba na nse ya lokasa) Liloba yango euti na verbe rum, oyo elimboli mpenzampenza “oyo batomboli; oyo bakumisi; kotombola” (Yobo 22:12, NW; 1 Samwele 2:1, NW; Genese 14:22, NW), verbe yango ekoki mpe kolimbola “ kotombola [lokola makabo],” to “kopesa makabo.”—Levitike 22:15, NW.
Makabo ezalaka kaka te kopesa eloko. Paulo apesaki Nzambe botɔndi mpo na makabo oyo baklisto ya Filipi bapesaki na nsango malamu. Longola lolenge bango moko basakolaki nsango malamu, basalisaki Paulo, ekoki kozala na bato mosusu mpe, na biloko ya mosuni; na lolenge wana mpe bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu.—Bafilipi 1:3-5; 4:16-18.
Bayisalaele bazalaki na libaku malamu ya kopesa makabo mpo na kotonga mpe kobongisa bisika ya losambo ya solo. Bapesaki makabo ya biloko ya kotonga mongombo mpe biloko oyo esengelaki kozala na kati mongombo (Exode 25:1-9; 35:4-9, NW), “makabo ya bolingo malamu epai ya Yehova,” oyo esengelaki bátika kopesa mpamba te biloko oyo bapesaki “ekokaki mpo na kosala misala nyonso mpe kutu elekaki.” (Exode 35:20-29; 36:3-7, NW) Makabo oyo Mokonzi Davidi apesaki mpo na kotonga tempelo, ezalaki mpe na “biloko na ye moko” ya wolo mpe ya palata oyo ezalaki na motuya ya mbongo dolare koleka miliare moko na milio 202 (1 202 000 000). Bana ya mikonzi na bankumu mpe bapesaki na esengo nyonso wolo mpe palata na motuya ya mbongo koleka dolare miliare moko na milio 993 (1 993 000 000), mpe lisusu kwivre, bibende, na mabanga ya ntalo.—1 Ntango 29:1-9.
Na mikolo ya Mokonzi Yoasa, batyaki sanduku moko na ekuke ya ndako ya Yehova mpo na kokɔngɔla makabo mpo na mosala monene ya kobongisa tempelo. Bankumu na bato nyonso basepelaki kopesa “mpako mosantu,” oyo esalisaki mpo na kobongisa ndako ya Yehova, mpe mpo na kosala bisaleli ya tempelo.—2 Ntango 24:4-14, NW.
Ntango bazalaki na mosala ya kosakola, Yesu Klisto na bantoma na ye bazalaki kondima kozwa makabo ya biloko oyo bazalaki kopesa bango. (Luka 8:1-3) Baklisto ya Makedonia na ya Akaya bazalaki mpenza na mposa makasi ya kosalisa bandeko na bango oyo bazalaki na bosɛnga; “basepelaki kokabola biloko na bango na nzela ya likabo epai ya babola na kati ya basantu oyo bazalaki na Yelusaleme”; ekoki mpenza kozala ete bapesaki bango mbongo.—Baloma 15:26, NW.
Ezali motuya ya likabo te nde elakisaka mpenza motema ya kokaba ya moto oyo azali kopesa. Mokolo moko Yesu azalaki kotala bato oyo bazalaki kotya mbongo na sanduku ya makabo na tempelo. Bato ya bozwi batyaki mbongo mingi, kasi Yesu akamwaki ntango amonaki mwasi moko mobola oyo akufelá-mobali atyaki mea mibale ya motuya moke mpenza. Alobaki boye: “Mwasi oyo mobola aleki bango nyonso na kopesa makabo, mpo ete baoyo nyonso batii mosolo elekaki na bango kati na makabo, nde mwasi oyo na kozanga na ye atii nyonso ezalaki na ye mpo na kolya.” (Luka 21:1-4; Malako 12:41-44) Ntoma Paulo alobaki boye mpo na likambo ya kopesa makabo mpo na kosunga bandimi oyo bazalaki kokelela: “Soko mposa ezali, likabo ekoyambama [na kotalela] biloko bizali na moto, nde [na kotalela] biloko bizangeli ye te.”—2 Bakolinti 8:12.
Atako moto te akoki kokómisa Yehova mozwi, mpamba te biloko nyonso ezali ya ye (1 Ntango 29:14-17), nzokande kopesa makabo ezali libaku malamu oyo epesaka basambeli ya Nzambe nzela ya kolakisa bolingo na bango epai na ye. Moto oyo apesaka makabo mpo na komilakisa te to mpo na bamposa mosusu ya moimi te, kasi na motema malamu mpe mpo losambo ya solo ekende liboso, azwaka esengo mpe Nzambe apambolaka ye. (Misala 20:35; Matai 6:1-4; Masese 3:9, 10) Tokoki kozwa esengo yango soki tobombaka mbala na mbala mwa eloko oyo tozali na yango mpo na kosimba losambo ya solo mpe mpo na kosalisa bato oyo bazali kokelela.—1 Bakolinti 16:1, 2.