Lisosoli ya malamu ezali na motuya!
ZULUNALO moko ya Brésil (Correio do Povo) ezalaki na motó ya likambo oyo: “Leta asengeli kozwa mbongo na ye (R$ 20 000).” Lisolo yango elobelaki likambo ya Luiz Alvo de Araújo, mobali moko oyo asalaka na posita; ye atɛkelaki Leta eteni moko ya mabele. Nsima ya kopesa Leta mikanda ya lopango yango, Luiz amonaki ete balekisaki mbongo mosusu (R$20 000 [soki dolare 8 000]) likoló ya ntalo oyo bayokanaki!
Sikoyo, mpo azongisela Leta mbongo yango, ekómaki likambo monene. Lokola ekómaki ete Luiz akendaka mbala na mbala na biro ya Leta, kasi eloko moko ezalaki kosalema te, bapesaki ye toli ete aluka avoka mpo tribinale ekatela ye likambo yango. Zuzi asɛngaki Leta ete andima kozwa mbongo yango mpe afuta Luiz mbongo nyonso oyo abimisaki mpo na kofuta avoka; zuzi yango alobaki boye: “Emonani ete moto moko asalaki libunga mpe lokola makambo ya Leta ezalaka kaka mindɔndɔmindɔndɔ, ata moto moko te ayebaki nini esengeli kosala mpo na kobongisa likambo yango. Ezali mbala ya liboso nakata likambo ya motindo oyo.”
Luiz azali Motatoli ya Yehova; yango wana alobaki boye: “Nayekolaka Biblia mpe natosaka mibeko na yango; yango wana lisosoli na ngai ekoki te kotika ngai nabomba mbongo oyo ezali ya ngai te. Esengelaki kaka nazongisa mbongo yango.”
Likambo ya bongo ekoki kokamwisa bato mingi to ezali mpasi bákanga ntina oyo ye asalaki bongo. Kasi Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete, mpo na baklisto ya solosolo, kozala na lisosoli malamu liboso ya bakonzi ya Leta ezali na ntina mingi. (Baloma 13:5) Batatoli ya Yehova balingaka kozala ‘na lisosoli malamu mpe na bosembo na makambo nyonso.’—Baebele 13:18.