Esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ
NA BANGOMBA ya Mpoto oyo ezalaka na mwa matiti mpe na mwa banzete ya mikemike, ezali na mwa nzete moko oyo babengaka yango rhododendron ferrugineux. Mwa nzete yango ekolaka mabokemaboke mpo na komibatela na ntango ya mipɛpɛ makasi oyo ebɛtaka na bisika wana ya likoló. Mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaka ntango nyonso ezalaka likama mpo na mwa banzete yango mpamba te ezalaka mopɛpɛ ya malili, ekaukisaka mabele, mpe etikaka misisa na yango libándá.
Mbala mingi, mopɛpɛ yango ebebisaka rhododendron ferrugineux te mpamba te mwa nzete yango ebimaka na kati ya mwa bisika oyo mabanga epasuka. Atako mabele ezalaka mingi te na bisika wana, mwa banzela yango ya mabanga ya bangomba yango ebatelaka yango na ntango ya mopɛpɛ mpe esalisaka mwa banzete yango ebomba mai na yango. Na boumeli ya basanza mingi, mwa banzete yango emonanaka te, kasi na eleko ya molunge, bafololo ya motane makasi ya rhododendron ekómisaka bangomba kitoko.
Mosakoli Yisaya alimbolaki ete Nzambe akopona “bankumu,” mpe mokomoko na bango akozala lokola “esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ.” (Yisaya 32:1, 2, NW) Bankumu yango na elimo, to bakɛngɛli, bakolanda malako ya Mokonzi, Klisto, mpe bakozala lokola mabanga oyo eninganaka te, oyo ezalaka kaka makasi na ntango ya mitungisi to na ntango ya mpasi. Bakozala esika ya komibomba oyo ebongi na ntango ya mikakatano mpe bakosunga bato oyo bazali na mposa ya lisalisi, ete bábatela Liloba ya Nzambe—mai ya elimo—oyo babombaka na kati na bango.
Soki kondima ya moklisto moko ebatelami malamu te, monyoko, kolɛmba nzoto, to maladi, makambo oyo ezali lokola mipɛpɛ makasi, ekobɛtabɛta ye, mpe yango ekolɛmbisa kondima na ye. Bankulutu bakoki kozala libateli soki bazali koyoka na likebi mpenza mikakatano ya moklisto yango, bazali kopesa ye toli oyo euti na Biblia, mpe bazali kolendisa ye to kosalisa ye na makambo mosusu. Na ndakisa ya Yesu Klisto, mokonzi na bango, balingaka kosunga bato oyo ‘bapanzanipanzani.’ (Matai 9:36, NW) Bazalaka mpe na mposa ya kosunga basusu oyo mateya ya lokuta ebebisi bango. (Baefese 4:14) Lisungi ya motindo wana oyo eyaka na ntango oyo ebongi ezalaka na ntina mingi.
Mwasi moko nkombo na ye Miriam alobi boye: “Nalekisaki eleko moko ya mpasi mingi na bomoi na ngai ntango baninga na ngai mosusu ya motema babimaki na lisangá, mpe bobele na ntango yango, tata na ngai abɛlaki na motó (hémorragie cérébrale). Mpo na kosilisa mpasi ya makanisi oyo nazalaki na yango, nabandaki kobima na mobali moko oyo azalaki moklisto te. Mwa moke na nsima, lokola nazalaki komiyoka ete nabongi te, nayebisaki bankulutu ya lisangá ete nazwi ekateli ya kolongwa na lisangá mpamba te namoni lokola Yehova akoki kolinga ngai lisusu te.
“Na ntango wana ya mpasi, nkulutu moko ya boboto azongisaki ngai makanisi na bambula oyo nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya ntango nyonso. Ayebisaki ngai ete azalaki kosepela na ndenge nazalaki sembo ntango nyonso, mpe abondelaki ngai na boboto mpenza nandima ete bankulutu básalisa ngai, bámonisa ngai lisusu bilembeteli ete Yehova alingaka ngai. Lokola bazalaki komitungisa mpe komonisela ngai bolingo na ntango wana ya mpasi, yango ezalaki lokola ‘esika ya komibomba’ mpo na ngai na ntango oyo mipɛpɛ ya makasi ya elimo ezalaki kobɛta. Nsima ya sanza moko, natikaki mpenza kobima na mwana mobali yango mpe banda ntango wana, nazali kaka kotambola na nzela ya solo.”
Ntango bankulutu bazali komona bandeko na bango baklisto bazali kokola na elimo mpo babatelaki bango na ntango oyo ebongaki mpenza, bamonaka ete basalaki mosala ya mpunda te. Mpe ‘bisika ya komibomba’ yango emonisaka biso mwa moke lisalisi ya elimo oyo tokozwa na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.