Bazalaka mpe na bwanya oyo ya bango
LISESE moko ya ekólo Nigeria elobaka boye: “Bakóló bazalaka na bwanya, kasi bana mike mpe bazalaka na bwanya oyo ya bango.” Edwin, nkulutu moko na lisangá ya boklisto na Nigeria, amonaki bosolo ya likambo yango.
Mokolo moko, Edwin akutaki kɛsi ya bibende na ndako na ye na nse ya mesa.
Edwin atunaki bana na ye misato: “Oyo ezali ya nani?”
Emmanuel, oyo azali na mbula mwambe, ayanolaki ete: “Ezali ya ngai.” Abakisaki nokinoki ete kɛsi yango ya bibende oyo egugá, oyo ezali mwa monene ya sentimɛtrɛ 12 epai na epai, mpe ezali na mwa lidusu na likoló, ezali mpo na kobomba makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Alobaki: “Lokola nakendaka na Ndako ya Bokonzi mikolo nyonso te, nakanisaki nasala kɛsi mpo soki bapesi ngai mbongo ya mikate mpe nasombi mikate te, natyaka yango na kɛsi.”
Tata ya Emmanuel azalaki na kɛsi moko na ndako ya kobomba mbongo ya komibongisa mpo na liyangani ya etúká oyo ezalaka mbala moko na mbula. Kasi mpo na mokakatano moko oyo ebimaki mbalakaka na libota, basalelaki mbongo oyo ezalaki na kɛsi. Mpo alingaki te mbongo na ye ya makabo esalelama na likambo mosusu, Emmanuel amemaki linzanza moko epai ya sudɛrɛ mpo akangisa yango. Ntango sudɛrɛ wana ayebaki ntina ya linzanza yango, asalelaki Emmanuel kɛsi moko na biteni ya bibende ya kala. Michael, leki ya Emmanuel, ye azali na mbula mitano asɛngaki básalela ye mpe kɛsi.
Lokola likambo bana basalaki ekamwisaki Edwin mingi, atunaki bango ntina nini basalisaki bakɛsi yango. Michael ayanolaki boye: “Nalingi kopesa makabo!”
Kozanga baboti báyeba, Emmanuel, Michael na Uchei, ndeko na bango ya mwasi ya mbula libwa, babombaka ndambo ya mbongo oyo bapesaka bango mpo na biloko ya kolya na kelasi mpe batyaka yango na bakɛsi. Bazwaki likanisi wana wapi? Ntango kaka bana bapusanaki moke na mbula mpe bakokaki kosimba mbongo na mabɔkɔ na bango moko, baboti na bango bateyaki bango ezaleli ya kotya mwa mbongo na kɛsi ya makabo na Ndako ya Bokonzi. Emonanaki polele ete bana bakangaki ntina ya liteya yango malamu.
Ntango bakɛsi na bango etondaki, bakataki yango mpo na kofungula yango. Mbongo nyonso babombaki ezalaki dolare 3,13—ezali mbongo ya moke te, mpamba te na ekólo na bango bato mingi bazwaka kaka soki dolare 300 na mbula moko. Makabo ya bolingo malamu ya lolenge wana ezali kosalisa mpo na mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova oyo ezali kosalema sikoyo na bikólo 235 na mokili mobimba.