Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/1 lok. 32
  • Misala malamu ekumisaka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Misala malamu ekumisaka Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/1 lok. 32

Misala malamu ekumisaka Nzambe

BAKLISTO ya solo bakumisaka Nzambe na etamboli mpe na misala na bango malamu. (1 Petelo 2:12) Makambo oyo esalemaki na ekólo Italie na bambula oyo euti koleka emonisi mpenza ete ezali bongo.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1997, koningana makasi ya mabele esalemaki na bisika mingi ya bitúká ya Marche mpe ya Umbria; ebebisaki bandako pene na 90 000. Ebele ya Batatoli ya Yehova bayaki nokinoki kosalisa baninga na bango bandimi mpe bato mosusu. Bapesaki bango bawagɔ mpo na kolala, bambeto oyo basalelaka na mobembo, baresho, mitɛrɛ ya kura, mpe biloko mosusu oyo bato wana basengelaki na yango. Milende oyo basalaki mpo na kopesa lisalisi yango emonanaki na miso ya bato.

Zulunalo moko (Il Centro) elobaki boye: “Bato ya liboso oyo bayaki kosalisa bato na bisika oyo likama ekweaki ezalaki Batatoli ya Yehova ya mboka Roseto [na etúká ya Teramo] . . . Longola ndenge bayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobondela, baoyo bazali sembo epai ya Yehova basalaka na lolenge oyo ebongi mpenza; basalisaka bato oyo bazali komona mpasi kozanga ete báluka koyeba soki bato yango bazali na lingomba nini.”

Guvɛrnɛrɛ ya engumba Nocera Umbra, moko ya bingumba epai biloko mingi ebebaki, akomelaki Batatoli ya Yehova maloba oyo: “Napesi bino matɔndi oyo euti mpenza na motema mpo na lisalisi oyo bopesaki na bato ya engumba Nocera. Nandimi mpenza ete oyo nalobi, ezali mpe makanisi ya bato nyonso oyo bafandi na engumba yango.” Longola yango, Ministère ya Intérieur epesaki Congregazione Cristiana dei Testimoni di Geova (Lisangá ya boklisto ya Batatoli ya Yehova) diplome mpo na misala na bango malamu mpe medayi moko “mpo na kondima mpenza mosala oyo basalaki mpe molende oyo bamonisaki mpo na kopesa mabɔkɔ na misala oyo esalemaki na ntango likama ekwelaki etúká ya Umbria mpe ya Marche.”

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 2000, mpela moko monene ezindisaki etúká ya Piémont, oyo ezali na nɔrdi ya ekólo Italie. Na mbala oyo lisusu, Batatoli baumelaki te mpo na kosalisa bato oyo bakwelaki likama. Kuna mpe, misala wana malamu emonanaki na miso ya bato. Etúká ya Piémont epesaki bango etanda moko oyo bakomaki maloba likoló na yango mpo na “mosala malamu oyo basalaki mpo na kosalisa bato ya etúká yango oyo mpela ebebiselaki bango biloko mingi, kozanga kosɛnga lifuti.”

Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Matai 5:​16, NW) Ntango basalaka ‘misala malamu’ oyo ezali kosalisa bato mosusu na elimo mpe na makambo mosusu, Batatoli ya Yehova bakumisaka nde Nzambe na esengo, kasi bamikumisaka bango moko te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto