Henri VIII mpe Biblia
NA BUKU na ye History of the English-Speaking Peoples (Lisolo ya bato oyo balobaka Lingelesi) (Volimi 2), Winston Churchill akomaki boye: “Na makambo etali kondima, Mbongwana oyo ememaki na kobotama ya Lingomba ya Protesta ebongolaki mpenza makambo mingi. Kobanda wana, Biblia ezwaki nguya ya sika mpe bato bakómaki kondima yango mingi koleka. Bato ya kala bazalaki kokanisa ete Makomami Mosantu ezalaki likama mpo na bato oyo batángá kelasi te mpe kaka basango nde basengelaki kotángaka yango.”
Lisolo elobi lisusu boye: “Babiblia ya mobimba oyo Tyndal mpe Coverdale babongolaki na Lingelesi ebimaki na masini ya konyata mikanda kobanda nsuka ya otɔne ya mobu 1535, mpe babiblia mosusu ebele oyo babimisaki nsima ezalaki kotambola epai na epai. Guvɛrnɛma epesaki basango etinda ete bálendisa bato bátánga Biblia. Nsima ya bikeke mingi oyo bato bayebaki Biblia te, bato ya Angleterre babandaki koyeba Biblia. Nzokande likambo yango esalemaki na Guvɛrnɛma ya Henri VIII, kasi mpo na milende ya Lingomba te.a
“Ntango Guvɛrnɛma esɛngaki ete bányata ebele ya Babiblia ya Lingelesi na Paris, Babiblia ya kitoko koleka oyo ebimaki na mbala ya liboso, yango mpe emonisaki ete bakweisaki makanisi ya bato ya kala. Na sanza ya libwa 1538, Guvɛrnɛma epesaki etinda ete parwasɛ nyonso oyo ezali na ekólo wana esengeli kozala na Biblia oyo ya monene, na Lingelesi. Mpe basengeli kotya Biblia yango na bandako-nzambe nyonso, na esika oyo bato ya parwasɛ bakoki kosalela yango mpe kotánga yango. Batyaki Babiblia motoba na katɛdralɛ Saint Paul, na engumba ya Londres. Mokolo mobimba, bato babandaki kotondana kuna mpo na kotánga yango mpe ndenge bayebisaki biso, mingi mpenza ntango bazalaki kozwa moto moko oyo azali na mongongo makasi mpo ete atángela bango yango.”
Na mawa mpenza, na bikólo mingi, ebele ya bato bazwaka litomba te na libaku oyo bapesaka bango ya kotánga Biblia mbala na mbala. Ezali likambo ya mawa, mpamba te, bobele Biblia nde “epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya bosembo.”—2 Timote 3:16, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokonzi Henri VIII ayangelaki Angleterre kobanda 1509 kino 1547.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Henri VIII: Liyemi na Royal Gallery na Kensington, euti na buku The History of Protestantism (Vol. I)