Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/12 lok. 32
  • “Na pole oyo euti epai na yo tokoki komona pole”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Na pole oyo euti epai na yo tokoki komona pole”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/12 lok. 32

“Na pole oyo euti epai na yo tokoki komona pole”

POLE ezali eloko oyo mbala mingi toyebaka ntina na yango te; tomonaka ntina na yango kaka na ntango oyo kura ekatani mpe molili ekɔti na kartye na biso. Likambo ya esengo ezali ete moi, oyo ezali lokola “stasyo” oyo esalelaka biso kura kuna na likoló, etikaka kosala ata mokolo moko te. Ezali mpo na pole oyo eutaka na moi nde tokoki komona, kolya, kopema, mpe kozala na bomoi.

Lokola pole ezali na ntina mingi mpo bomoi ezala, tokoki kokamwa te soki totángi na Genese ete pole ebimaki na mokolo ya liboso ya bozalisi. “Nzambe alobaki ete, tiká pole ezala, mpe pole ezalaki.” (Genese 1:3) Bato oyo bazalaki kobanga Nzambe lokola Mokonzi Davidi, bazalaki ntango nyonso kondima Yehova lokola liziba ya bomoi mpe ya pole. Davidi akomaki boye: “Liziba ya bomoi ezali epai na yo; na pole oyo euti epai na yo tokoki komona pole.”​—Nzembo 36:9, NW.

Maloba ya Davidi ezali na ndimbola mibale: ndimbola ya solo mpe ya elilingi. Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Ya solo, mpo na komona, esengeli pole ezala.” Ebakisi mpe ete: “Makambo mingi ekɔtaka na bɔɔngɔ ya moto na nzela ya miso koleka binama mosusu nyonso.” Lokola makambo mingi oyo toyekolaka etaleli likoki ya komona oyo Nzambe apesá biso, likoki oyo esengeli na pole mpo esala malamu, Makomami esalelaka mpe pole na ndimbola ya elilingi.

Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ngai nazali pole ya mokili. Moto oyo azali kolanda ngai akotambola soki moke te na molili, kasi akozwa pole ya bomoi.” (Yoane 8:12, NW) Pole ya elilingi oyo Yesu alobelaki ezalaki nde nsango ya solo oyo asakolaki, nsango oyo ekokaki kongɛngisa bɔɔngɔ mpe mitema ya bato oyo bazalaki koyoka ye. Nsima ya kolekisa bambula mingi na kati ya molili ya elimo, sikoyo bayekoli ya Yesu bakokaki kokanga ntina ya mokano ya Nzambe mpo na bato mpe elikya ya Bokonzi. Yango ezalaki mpenza “pole ya bomoi,” mpamba te boyebi yango ekokaki komema na bomoi ya seko. Na libondeli oyo Yesu asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báluka koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Tiká ete tózwa soki moke te pole yango ya elimo lokola eloko oyo ezangi ntina!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto