“Tokomonana na Bokonzi ya Nzambe”
“Moninga na ngai! Rupert, lelo oyo bakateli ngai etumbu ya liwa. Bólela mpo na ngai te. Yambá mbote na ngai ya bolingo mpe moto nyonso na ndako na ngai ayamba yango lokola. Tokomonana na Bokonzi ya Nzambe.”
FRANC DROZG akomaki maloba yango na mokolo ya 8 Yuni 1942, mwa moke liboso ete basoda ya Nazi báboma ye na masasi. Babomaki ye mpo na nini?
Na kotalela balapolo oyo ezalaka na Museum of National Liberation na engumba ya Maribor, na ekólo Slovénie, motuli wana ya biloko ya wolo, oyo azalaki na mbula 38, aboyaki kokɔta na limpinga ya basoda oyo babengi Wehrmannschaft, na ntango oyo Slovénie ezalaki na mabɔkɔ ya Ba Allemands. Azalaki Bibelforscher, to Moyekoli ya Biblia, ndenge oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na esika wana. Lokola alandaki oyo elobami na Yisaya 2:4, aboyaki kopesa mabɔkɔ na etumba ya Banazi, mpo ye moko azalaki koloba ete azali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 6:33.
Na mboka na ye Ptuj, Franc ayebanaki ete azali motatoli ya molende ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Atako mikakatano ezalaki mingi, asakolaki nsango malamu kozanga kolɛmba tii ntango bakangaki ye na sanza ya mitano ya mobu 1942.
Banazi banyokolaki mpenza ebele ya Batatoli ya Yehova na Slovénie. Franc azalaki moko na kati ya Batatoli ya liboso oyo babomamaki mpo na bindimeli ya lingomba na bango. Ndenge esalemaki mpo na baklisto ya ekeke ya liboso, maloba oyo epesaki ye makasi: “Ekoki na biso kokɔta na Bokonzi ya Nzambe na nzela ya bolɔzi mingi.” (Misala 14:22) Endimeli oyo azalaki na yango ete boyangeli ya likoló ezali likambo ya solo, emonani polele na maloba na ye ya nsuka, “Tokomonana na Bokonzi ya Nzambe.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Franc Drozg: Photo Archive-Museum of National Liberation ya Maribor, na Slovénie; mokanda: Ebombami na Museum of National Liberation ya Maribor, na Slovénie