Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/11 nk. 2-4
  • Tozali na elikya ata moko te ya kobika?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na elikya ata moko te ya kobika?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Batelá “elikya ya lobiko” na yo makasi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lobiko: Ndimbola na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Oyo tosengeli kosala mpo tobikisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Lobiko ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/11 nk. 2-4

Tozali na elikya ata moko te ya kobika?

Bato mingi balobaki ete na ekeke ya 20 bato babomanaki mingi koleka na bikeke mosusu nyonso. Kobomana, bitumba, komɛla bangi, lokuta mpe mobulu ekomi mingi na bambula oyo euti koleka. Longola makambo yango, bato banyokwamaki mingi na maladi, bobange mpe liwa. Bato nyonso bazali kolela ete mikakatano oyo ezali na mokili lelo oyo esila. Soki tokanisi mikolo oyo ezali koya, tozali komona ata elikya moko ya lobiko?

TÓTALELA naino emonaneli moko oyo ntoma Yoane amonaki eleki sikoyo mbula soki 2000. Akomaki boye: “Talá! Efandelo ya Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo ya liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Yisaya mpe asakolaki ete: “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Mokonzi Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsɔni ya bato na ye longwa na mokili mobimba, zambi [Yehova] alobi bongo.”​—Yisaya 25:8.

Kanisá ndenge mokili ekozala soki bilaka wana ya Nzambe ekokisami! Bato bakobikisama, to bakonyokwama lisusu te, mobulu mpe makambo oyo ezali kopesa bango mpasi mpe ezali kotungisa bango ekozala lisusu te. Elingi koloba ete ata maladi, bobange, mpe liwa ekozala lisusu te! Biblia, Liloba ya Nzambe, elaki ete bato bakozala na bomoi ya seko mpe ya kokoka awa na mabele. (Luka 23:43; Yoane 17:3) Moto nyonso oyo alingi akoki kozwa bomoi yango. “[Nzambe] mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bakóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:3, 4, NW.

Kasi, mpo na komona bolamu oyo Nzambe alaki biso, tosengeli koyeba mokumba oyo Yesu Klisto azali kokokisa mpo na lobiko na biso mpe tosengeli kozala na kondima epai na ye. Yesu ye moko alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana na ye mobotami-se-moko, NW] ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Mpo na mokumba monene oyo Yesu Klisto azali kokokisa na likambo yango, ntoma Petelo alobaki boye: “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tókoka kobika mpo na yango.” (Misala 4:12) Ntoma Paulo na moninga na ye Sila balobaki na moto moko oyo azalaki mpenza na mposa ya koyeba makambo ete: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobikisama, na yo na bato ya ndako na yo.”​—Misala 16:30, 31.

Ya solo, Yesu Klisto azali “Mokonzi ya bomoi” mpe, kaka na nzela na ye nde tokoki kozwa lobiko. (Misala 3:15) Kasi, ndenge nini ye moto moko akoki kokokisa mokumba monene boye mpo na lobiko na biso? Soki tokangi ntina malamu ya mokumba na ye na likambo yango, elikya na biso ya kozwa lobiko ekokóma lisusu makasi.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Lokasa 3: Aviɔ ya bitumba: Fɔtɔ ya USAF; mwana akɔndi na nzala: ONU/J. FRAND; masuwa ya bitumba ezali kopɛla mɔ́tɔ: Fɔtɔ ya U.S. Navy

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto