“Mokolo ya koyoka bindimeli ya mangomba mosusu”
NA EKÓLO Pologne, mokambi ya eteyelo moko asololaki na Batatoli ya Yehova mpe lisolo yango etindaki ye akanisa mingi; yango wana abongisaki “Mokolo ya koyoka bindimeli ya mangomba mosusu” na eteyelo na ye. Asɛngaki na bana-kelasi nyonso oyo balingi, ezala Bakatolike, bandimi ya lingomba ya Bouddha mpe Batatoli ya Yehova, ete bábongisa mwa masolo mikuse mpo na koyebisa bana-kelasi mosusu bindimeli mpe makambo mosusu ya lingomba na bango. Batatoli ya Yehova misato ya bilenge bakakatanaki te, bandimaki mbala moko kosala yango.
Ntango mokolo yango ekokaki, moto ya liboso oyo alobaki ezalaki Malwina, elenge mwasi ya mbula 15. Na lisolo na ye alobaki boye: “Mingi kati na bino boyebaki biso liboso tókɔta na eteyelo oyo, mpo toyaki kotala bino na bandako na bino. Mbala mosusu bomitunaka mpo na nini tolɛmbaka te koya kotala bino na bandako na bino. Tolandaka nde ndakisa ya Yesu Klisto, Mobandisi ya lingomba ya boklisto. Asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esika nyonso oyo akokaki kokuta bato. Bantoma mpe baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki mpe mosala yango. Na bisika mingi, kondima ya Batatoli ya Yehova ezali komekama makasi; kasi tozali na esengo ya komona ete na eteyelo na biso tozali na kimya, oyo bino nyonso bozali kosala makasi mpo na kobatela yango. Topesi bino matɔndi mpo na yango!”
Mpo na kosukisa lisolo na ye, Malwina alobaki boye: “Ezali na ntina mosusu oyo toyaka kotala bino na bandako. Tomibanzabanzaka mpo na bino. Biblia elobi ete etikali moke bato bakomona makambo minene oyo ekoningisa mokili. Yango wana, tosɛngi ete mbala ya nsima oyo tokoya na ndako na bino, bóyoka biso. Tokoyebisa bino ndenge nini tokoki kozwa biso nyonso bomoi ya seko mpe kofanda na paladiso awa na mabele.”
Molobi ya mibale ezalaki elenge mobali Mateusz, ye mpe azali na mbula 15. Mateusz ayebisaki bayoki na ye ete Batatoli ya Yehova basalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, na 1914 ntango oyo bililingi ya bafilme ezalaki kaka koningana kasi ezalaki na maloba te, Batatoli ya Yehova bazalaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Yango ezali filme mpe diapozitive oyo, ntango bazalaki kolakisa yango, bazalaki kobeta diskɛ oyo ezalaki na maloba mpo na kolimbola bililingi yango.
Mateusz alobelaki mosala oyo radio esalaki mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi mpe na nsima alimbolaki programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ebengami Sytème de photocomposition électronique multilingue (MEPS), oyo Batatoli ya Yehova basalaki bango moko. Ayebisaki mpe ndenge oyo Batatoli ya Yehova basungi minganga na koyeba mayele ya kosalisa bato kozanga kozongisa bango makila. Alobaki ete “Lelo oyo, minganga minene ya Pologne bakómi kondima makanisi na biso mpe bamonisi ete mbula na mbula, bazali kopasola bato mingi oyo bazali Batatoli te, kozanga kozongisa bango makila.”
Mateusz asukisaki na koyebisa bango ndenge Bandako ya Bokonzi ezali kotongama mpe alobaki boye: “Bokosepela koya kotala Ndako na biso ya Bokonzi? Bakɔtaka ofele mpe basɛngaka mabonza te.” Mateusz azalaki kolobela Ndako ya Mayangani oyo ezali na Sosnowiec, ntango alobaki ete: “Esengeli bóya kotala ndenge batongi ndako monene yango, ezali esika oyo ebongi mpenza na losambo. Bomoni boni soki tokei kuna biso nyonso? Tozali na likanisi mosusu ya kobakisa, mpe moninga na biso Katarzyna akoyebisa bino yango.”
Na nsima, Katarzyna, elenge mwasi mpe ya mbula 15, alobaki na mɔ́tɔ mpenza ete: “Tozali kobengisa bino na Sosnowiec mpo na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Liyangani yango ekolobela masolo oyo etali bilenge.” Katarzyna alobelaki mpe Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto oyo ezali likita ya ntina mingi mpo na baklisto. Alendisaki bayoki na ye na maloba oyo: “Na mbula oyo euti koleka, bato koleka milio 14 na mokili mobimba bayanganaki na likita yango. Tobengisi bino bóya kosangana na biso na likita yango mbala ya nsima.”
Nsima ya masolo na bango, Malwina, Mateusz, mpe Katarzyna bapesaki balakisi na bango buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu mpe bakasɛti video mibale oyo ezali kolobela bindimeli mpe mosala ya Batatoli ya Yehova.a Balakisi basepelaki na yango mingi mpe balobaki ete bakosalela yango na mateya ya istware.
Na nsuka, mpo na kosepelisa bato nyonso oyo bazalaki wana, Martyna, elenge mosusu ya mbula 12 ayembaki loyembo oyo ezali na motó ya likambo “Totɔndi yo, Yehova.” Bilenge wana Batatoli ‘bazalaki na mpiko na lisalisi ya Nzambe na bango’ mpe bapesaki litatoli moko malamu. (1 Batesaloniki 2:2, NW) Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na bilenge Batatoli ya bisika nyonso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 26]
Katarzyna azali kopona bavɛrsɛ mpo na lisolo na ye
[Elilingi na lokasa 26]
Malwina azali kobongisa lisolo na ye mwa mikolo liboso ya kosala yango na kelasi