Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/10 lok. 32
  • Liteya oyo tokoki kozwa na nzete ya mbila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya oyo tokoki kozwa na nzete ya mbila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/10 lok. 32

Liteya oyo tokoki kozwa na nzete ya mbila

MOKANDA moko oyo elimbolaka Biblia elobeli motindo moko ya nzete ya mbila (palmier dattier) boye: “Nzete ya mbila yango ezalaka kitoko mpenza mpo na kotala.” Banda kalakala, lobwaku mobimba ya Ebale Nil, na Ezipito, ezalaka kitoko na kotala mpo etondi na banzete yango. Lisusu, na bisika oyo ezali na mwa matiti na esobe ya Négueb, bisika ya banzete ya mbila yango ezalaka bisika ya mpiɔ mpo na kopema.

Lokola mitindo nyonso ya nzete ya mbila, dattier mpe etɛlɛmaka semba mpenza. Nzete yango mosusu ekómaka milai na mɛtrɛ 30 mpe ebotaka tii na mbula 150. Ya solo, nzete ya mbila yango ezalaka mpenza kitoko na kotala, ebotaka mpe mbuma mingi mpenza. Mbula na mbula ebimisaka mitó ya mbila oyo ezalaka na ebele ya mbuma oyo babengaka datte. Motó moko mpamba ya mbila ekoki kozala na mbuma koleka 1 000. Moto moko ya mayele oyo ayekolaki makambo etali mbuma ya nzete ya mbila yango akomaki ete: “Baoyo . . . balyá kaka datte oyo batɛkaka na bamagazini, oyo bakaukisá, bakoki koyeba te ndenge oyo mbuma yango ezalaka elɛngi soki olei yango ntango ezali naino ya sika.”

Yango wana , Biblia ekokanisi bato mosusu na banzete ya mbila. Ndenge moko na nzete ya mbila oyo ebotaka mbuma mingi, moto oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli kozala semba na bizaleli na ye mpe asengeli kobotaka mbuma, elingi koloba kosala misala ya malamu. (Matai 7:17-20) Yango wana, mpo na kokembisa tempelo, ezala oyo Salomo atongisaki to oyo Ezekiele amonaki na emonaneli, na kati na yango bayemaki banzete ya mbila mingi. (1 Mikonzi 6:29, 32, 35; Ezekiele 40:14-16, 20, 22) Na bongo, mpo ete Nzambe andima losambo ya moto, esengeli ete moto yango azala na makambo ya malamu lokola oyo dattier ezalaka na yango. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Moto ya boyengebene akokola [lokola nzete ya mbila, NW].”​—Nzembo 92:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto