Bazali kosalela nkombo ya Nzambe na Afrika ya ntei
NA Afrika ya Ntei, bato mingi bandimaka Nzambe. Bandimaka ete azali Mozalisi ya biloko nyonso. (Emoniseli 4:11) Kasi, ndenge kaka ezalaka na bamboka mosusu, bato mingi bayebaka te ete nkombo na ye mpenza ezali Yehova.
Bato ya Afrika ya Ntei, ezala mpe bato ya biteni mosusu ya mokili, balobelaka nkombo ya Nzambe na Libondeli ya Nkolo, ntango balobaka ete “Nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:9) Kasi banda kala, mwa bato moke kaka nde bayebaka nkombo yango. Nzokande, ndenge bambula ezali koleka, mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaka na molende mpenza, ebongoli makanisi ya bato na likambo etali kosalela nkombo ya Nzambe. Lelo oyo, nkombo ya Nzambe eyebani mpe endimami mingi koleka na minɔkɔ ebele ya Afrika, na ndakisa na Zulu (uJehova), na Yoruba (Jehofah), na Xhosa (uYehova) mpe na Swahili (Yehova). Atako bongo, Babiblia mingi na minɔkɔ yango ezali kaka na nkombo ya Nzambe te.
Libongoli moko ya malamu oyo esaleli nkombo ya Nzambe ezali bongo Biblia ya Zande, monɔkɔ oyo balobaka na République centrafricaine, na Soudan, mpe na République démocratique du Congo. Kuna, bato basalelaka nkombo ya Nzambe, batángaka yango Yekova na monɔkɔ ya mboka na bango. Ezala ndenge nini oyo bakomaka to batángaka nkombo ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka moko, likambo oyo eleki ntina ezali nde ya kosalela nkombo yango. Mpo na nini? Mpamba te “moto na moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova, NW] akobika.”—Baloma 10:13.
[Karte/Elilingi na lokasa 32]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SOUDAN
RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE
RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck