Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/9 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Yesu azalaki mpenza Mwana ya Nzambe?
    Lamuká!—2006
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/9 lok. 31

Mituna ya batángi

Bakolose 1:16 (NW) elobi na ntina na Mwana ya Nzambe ete “biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” Na ndimbola nini biloko nyonso ezalisamaki “mpo na” Yesu, Mwana ya Nzambe?

Yehova asalelaki Mwana na ye mobotami-se-moko lokola mosali monene mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso, elingi koloba, biloko nyonso, longola kaka Yesu ye moko. (Masese 8:27-30; Yoane 1:3) Yango wana, Mwana asepelaka na biloko yango, mpe ezali na ndimbola wana nde biloko yango ezali “mpo na” ye.

Toyebi ete moboti nyonso azalaka na elikya ete bana oyo aboti bakosepelisa ye, emonanaka mpe bongo mbala mingi. Yango wana, lisese moko ya Biblia elobeli “mwana oyo [tata] asepelaka na ye.” (Masese 3:12, NW; 29:17) Ndenge moko mpe, Yehova Nzambe azalaki kosepela na Yisalaele ntango bato na ye bazalaki sembo. (Nzembo 44:3; 119:108; 147:11) Tii na moi ya lelo, asepelaka mpe na bosembo ya bato na ye oyo bazali sembo.​—Masese 12:22; Baebele 10:38.

Na yango, ebongaki Nzambe asala ete Yesu, moto oyo asalaki na ye elongo, asepela na biloko oyo asalaki. Kutu, Masese 8:31 (NW) elobi ete Mwana ‘azalaki kosepela na biloko ya mabele na ye, mpe biloko oyo azalaki kolinga mingi ezalaki elongo na bana ya bato.’ Ezali na ndimbola wana nde Bakolose 1:16 (NW) elobi ete: “Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto