Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/9 lok. 13
  • Tozalaki bambwa ya zamba, lelo oyo tokómi bampate!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozalaki bambwa ya zamba, lelo oyo tokómi bampate!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/9 lok. 13

Tozalaki bambwa ya zamba, lelo oyo tokómi bampate!

Ngai na Sakina tozalaki kofanda na kartye moko ntango tozalaki bana mike. Sakina azalaki mbinga ya mwasi; ngai nazalaki nzoto mike. Mbala mingi, soki kaka tokutani, tozalaki koswana; kasi mokolo mosusu tosimbanaki mpenza na nzoto. Kobanda wana, tozalaki lisusu kolobana te, tozalaki mpe kopesana mbote te. Nsukansuka, na biso na bango tolongwaki na kartye wana mpe tozalaki komonana lisusu te.

Na 1994, nakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe mokemoke, nabandaki kobongwana. Mbula minei na nsima, na liyangani ya mokolo moko oyo tosalaki na Bujumbura, na Burundi, likambo ya kokamwa: nakutanaki na Sakina. Nasepelaki ndenge namonaki ye na liyangani, kasi topesanaki mbote na esengo te. Na nsima, nakamwaki na komona ye na kati ya bato oyo basengelaki kozwa batisimo! Ye mpe abongwanaki mpenza. Azalaki lisusu ndenge nayebaki ye te: alingá-bitumba oyo nazalaki koswana na ye mbala na mbala. Ezalaki mpenza esengo na komona ye azali kozwa batisimo mpo na komonisa na miso ya bato nyonso ete amipesi na Nzambe!

Ntango abimaki na mai, nakendaki mbangu koyamba ye mpe nalobaki na ye na litoi ete: “Ozali koyeba lisusu ndenge tozalaki kobunda?” Alobaki ete: “Ɛɛ, nazali koyeba, kasi wana ezali makambo ya kala. Sikoyo nakómi moto mosusu.”

Biso mibale tozali na esengo na ndenge toyebi mateya ya solo ya Biblia, oyo ezali kosangisa bato mpe tozali na esengo na ndenge tobongoli bomoto na biso: tozalaki bambwa ya zamba, lelo oyo tokómi bampate ya Yehova Nzambe, Mobateli Monene ya bampate. Ya solo, mateya ya solo ya Biblia ebongolaka bato.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto