Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/7 lok. 28
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini komibatela na losambo ya bikeko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tomibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Balongaki komekama makasi na lisalisi ya kondima na bango
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Zwá na motuya boyokani na yo ná Yehova
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/7 lok. 28

Mituna ya batángi

Na 1 Petelo 4:3 (NW), tozali kotánga ete baklisto mosusu na ntango ya kala basanganaki na “losambo ya bikeko oyo endimami na mibeko te.” Losambo nyonso ya bikeko endimami na mibeko te, Nzambe aboyi yango mpe apekisi yango, boye te?

Ɛɛ, na miso ya Nzambe, losambo nyonso ya bikeko endimami na mibeko te. Bato nyonso oyo balingi ete andima bango bakoki te komipesa na losambo ya bikeko.​—1 Bakolinti 5:11; Emoniseli 21:8.

Nzokande, emonani lokola ete ntoma Petelo azalaki kolobela losambo ya bikeko na lolenge mosusu. Ezali bongo mpamba te, na kati ya bikólo mingi ya ntango ya kala, losambo ya bikeko ezalaki likambo oyo bato nyonso bazalaki kondima yango mpe bakonzi ya Leta bazalaki kopekisa yango te. Boye, mibeko ya mboka ezalaki te kopekisa losambo motindo wana ya bikeko. Kutu, bango moko bakonzi ya mboka bazalaki mpe kotya losambo ya bikeko. Na ndenge wana, bato mosusu, liboso ete bákóma baklisto, basanganaki na ‘losambo ya bikeko kozanga ata epekiseli moko.’ (New World Translation, ebimeli ya 1950) Na ndakisa, esengeli tóyeba ete Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone atɛlɛmisaki ekeko moko ya wolo mpo ete bato básambelaka yango, kasi Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego, oyo bazalaki basaleli ya Yehova, baboyaki kosambela yango.​—Danyele 3:1-12.

Epai mosusu, milulu mingi ya losambo ya bikeko ezalaki kokɔtisa na kati na yango misala mabe oyo ekesanaki mpenza na ndenge makambo ebongisamá to na bizaleli malamu oyo euti na lisosoli oyo tosangolaki. (Baloma 2:14, 15) Ntoma Paulo akomaki makambo oyo etali misala yango ya mabe oyo “ekeseni mpenza na ndenge oyo makambo ebongisamá” mpe oyo ezalaki “makambo ya nsɔni,” mpe misala yango mbala mingi ezalaki na kati ya milulu ya makambo etali losambo. (Baloma 1:26, 27, NW) Mibali na basi oyo bazalaki kosangana na losambo ya bikeko oyo endimami na mibeko te, bazalaki te kotosa liyoki oyo babotamaka na yango ya kokesenisa mabe na malamu. Na ntembe te, ebongaki mpenza ete bato oyo bakómaki baklisto bátika misala wana ya mbindo.

Longola oyo touti kolobela, Yehova Nzambe azalaki koboya losambo yango ya bikeko oyo ezalaki kosalema mingi epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. Mpo na ntina wana, losambo yango eyokanaki na mibeko te.a​—Bakolose 3:5-7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya Grɛki oyo ezali na 1 Petelo 4:3 elimboli mpenzampenza “losambo ya bikeko oyo eyokani na mibeko te.” Maloba yango ebongolami mitindo ndenge na ndenge na kati ya Babiblia ya Lingelesi na maloba lokola “losambo ya bikeko oyo epesami nzela te,” “losambo ya bikeko oyo epekisami,” mpe “losambo ya bikeko oyo euti na mibeko te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto