“Mpota izokisami na moninga”
NTOMA Paulo amonaki ete esengelaki apesa toli mpo na kosembola baklisto oyo bazalaki kofanda na Galatia na ekeke ya liboso. Mpo bábombela ye nkanda te, atunaki bango boye: “Nasili kokóma moyini na bino mpo ete nayebisi bino makambo ya sembo?”—Bagalatia 4:16.
Paulo akómaki monguna na bango te na ndenge ‘ayebisaki bango makambo ya sembo.’ Azalaki nde kokokisa lilako ya Biblia oyo elobi ete: “Mpota izokisami na moninga ikondimama.” (Masese 27:6) Paulo ayebaki ete yango elingaki kozokisa moto oyo asali mbeba. Kasi, ayebaki malamu ete soki aboyi kopesa moto oyo asali lisumu disipilini oyo moto yango asengeli kozwa, ekomonana lokola aboyi komonisa bolingo ya Yehova Nzambe epai ya moto yango. (Baebele 12:5-7) Yango wana, lokola azalaki moninga ya sembo oyo azalaki kolinga na motema mobimba ete lisangá ezala na bolamu oyo ekoumela, Paulo azongaki nsima te mpo na kopesa toli oyo ekosembola bango.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mokumba na bango ya ‘kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa makambo nyonso [Yesu Klisto] atindaki.’ (Biso nde totɛngisi makomi.) Ntango bazali kosala bongo, baklisto yango ya sembo babongolaka te mateya ya solo ya Biblia oyo ezali kobimisa polele mpe kokweisa mateya ya lokuta mpe etamboli oyo eyokani te na boklisto. (Matai 15:9; 23:9; 28:19, 20; 1 Bakolinti 6:9, 10) Na esika ete bato bátalelaka baklisto yango lokola banguna na bango oyo basengeli koyina, basengeli koyeba ete baklisto yango bazali nde koluka bolamu na bango; yango emonisi ete bazali baninga ya solosolo.
Mokomi na nzembo, oyo azalaki na bososoli oyo eutaki na elimo ya Nzambe, akomaki boye: “Tiká ete moyengebene abɛta ngai, malamu bongo; tiká ete apesa ngai toli; ekozala lokola mafuta malamu; motó na ngai ekoboya yango te.”—Nzembo 141:5.