Boyekoli ya Biblia ezali mpenza na ntina mpo na yo?
“OKOTÁNGA yango kaka soki sango azali pembeni.” Maloba wana ezwami na lokasa ya liboso ya Babiblia mosusu ya bakatolike ya kala. Kay Murdy, oyo azali mosangani ya ebongiseli moko ya bakatolike na engumba ya Los Angeles (Catholic Bible Institute), alobi boye: “Banda kala, biso bakatolike tozalaki mpenza kosalela mateya ya Biblia na bomoi na biso te; kasi likambo yango ezali kobongwana.” Amonisi ete ntango kaka bakatolike babandaki koyeba ntina oyo Makomami Mosantu ekoki kozala na yango na bomoi na bango, “bakómaki na mposa makasi ya Biblia.”
Mpo na mbongwana yango, zulunalo moko (U.S. Catholic) ezongeli maloba ya mokambi ya ebongiseli moko ya mateya ya Biblia; oyo alobaki ete bakatolike oyo bakɔtaki na bakelasi ya koyekola Biblia, bamonaki ete “kozala mokatolike ezangisaki bango makambo mingi; bamonaki mpe ndenge Biblia etondi mpenza na makambo mingi ya motuya. Balingi kozwa ndambo ya makambo yango ya motuya oyo bazangaki.”
Mbala mosusu okoki kokanisa ete “makambo” nini “ya motuya” moyekoli ya Biblia akoki kozwa na kati na yango? Kanisá naino na mituna oyo: Olingi koyeba ndenge nini okoki kolonga mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo? Ndenge nini okoki kobatela kimya na kati ya libota? Mpo na nini kotyola ezali mingi mpe bato mingi bakómi na bizaleli ya mabe, mpe bazali kosala baninga na bango mabe? Mpo na nini mobulu ekɔteli bilenge mingi ya lelo? Na mituna oyo mpe na mituna mosusu oyo etungisaka biso mpenza, tokoki kozwa biyano ya kotyela motema na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe biyano yango ekoki mpenza kozala “makambo ya motuya,” kaka mpo na bakatolike to mpo na baprotesta te, kasi mpe mpo na babudiste, bahindu, bamizilma, bashintoiste, ata mpo na bato oyo bandimaka Nzambe te mpe baoyo balobaka ete moto akoki koyeba Nzambe te. Ndenge mokomi ya Nzembo amonisi yango, ‘Liloba ya Nzambe ezalaki mwinda na makolo na ye, mpe pole na nzela na ye.’ Ekoki mpe kozala lolenge moko mpo na yo.—Nzembo 119:105.