‘Tópesa Batatoli ya Yehova botɔndi mpo na bonsomi ya losambo’
ZULUNALO moko (USA Today) ekomaki ete: “Liboso ya koboya koyoka Motatoli ya Yehova oyo ayei koteya yo na ndako, kitisá naino motema mpe kanisá ndenge oyo bato wana banyokwamaki eleki kaka mwa bambula, mpe likambo monene oyo basalaki mpo na kobongisa mibeko ya bonsomi (premier amendement) oyo biso nyonso tozali kosepela na yango.” Na États-Unis, na bambula ya 1940, Batatoli ya Yehova banyokwamaki mpo na makambo ebele, moko na yango ezalaki likambo ya koboya kopesa bɛndɛlɛ losako.—Exode 20:4, 5.
Kobanda na 1938 tii na 1943, bafundaki Batatoli ya Yehova soki na makambo 30 na tribinale monene (Cour Suprême) ya États-Unis. Zulunalo yango elobi ete: “Batatoli bazalaki mbala na mbala kobimisa makambo oyo ezalaki kosɛnga ete premier amendement etalela yango; yango wana Zuzi Harlan Fiske Stone, akomaki ete: ‘Batatoli ya Yehova basengeli kozwa libonza, ya makambo oyo basali mpo na kolonga mikakatano ya bonsomi ya bato.’”
Na nsuka, lisolo yango elobaki boye: “Mangomba nyonso esengeli kozongisela Batatoli ya Yehova botɔndi mpo na oyo basali mpo ete bonsomi [ya losambo] ekoka kokola.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Ndako oyo ezali komonana na nsima: fɔtɔ ya Josh Mathes, Collection of the Supreme Court of the United States; na nse, na lobɔkɔ ya mwasi, bazuzi: Collection of the Supreme Court of the United States