Molulu oyo osengeli kozanga te!
“Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi” mautaka na Nzambe, Tata na biso ya likoló.—Yakobo 1:17.
LIKABO oyo eleki monene oyo Nzambe apesaki bato ya masumu ezali ndenge oyo abongisaki makambo mpo na kobikisa bango na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na ye mobotami-bobele-moko. Liwa ya Yesu, Mosikoli na biso, epesi nzela na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Luka 22:19 elobi na biso ete tókanisaka liwa na ye.
Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kobengisa yo ozala na bango mpo na kokokisa etinda wana ya Yesu. Likita yango esalemaka mbala moko na mbula na mokolo oyo ekokani na mokolo ya 14 Nisana na manaka ya Bayuda na nsima ya kolala ya moi. Na mbula oyo dati yango ekwei na mokolo ya lomingo, 8 Aprili 2001. Komá dati yango na esika moko mpo obosana yango te. Batatoli ya Yehova ya kartye na bino bakoyebisa yo ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema.