Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/4 lok. 8
  • “Bomoko kati na bato ndenge na ndenge” na Inde

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bomoko kati na bato ndenge na ndenge” na Inde
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/4 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

“Bomoko kati na bato ndenge na ndenge” na Inde

“BOMOKO kati na bato ndenge na ndenge” ezali maloba eyebani mingi oyo basalelaka mpo na komonisa ete ekólo Inde esangisi bato ndenge na ndenge. Ezali lisɛki te mpo na kokóma na bomoko kati na ekólo monene oyo ezali na bato ya mimeseno, minɔkɔ, mangomba, bonkɔkɔ, lolenge ya kolata mpe ya kolya ndenge na ndenge. Nzokande, bomoko yango ezali komonana na biro oyo etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Inde, atako basali ya bolingo malamu oyo bafandaka mpe basalaka kuna bauti na bitúká mpe na bateritware ebele, mpe balobaka minɔkɔ mwa mingi.

• Tólobela naino Rajrani, elenge mwasi oyo auti na etúká ya Punjab, na nsuka ya nɔrdi-westi ya Inde. Ntango Rajrani azalaki na kelasi, mwana moko ya kelasi na bango azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Elenge mwasi yango amekaki kobenda likebi ya Rajrani mpo na oyo etali Biblia. Lokola mwana-kelasi yango ayebaki Lingɛlɛsi malamu te, mpe lokola na ntango wana Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki naino kobima na monɔkɔ ya Punjabi te, asɛngaki ete Rajrani asalisa ye na kobongola makambo oyo ezalaki na zulunalo yango mpo na ye. Makambo oyo Rajrani atángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esimbaki mpenza motema na ye; yango wana, atako baboti na ye balingaki te, alandaki koyekola Biblia kino amipesaki epai ya Yehova Nzambe. Lelo oyo azali kosala na Betele ya Inde, azali kosala kaka mosala oyo esalisaki ye na koyeba solo. Abongolaka mikanda ya la Société na monɔkɔ ya Punjabi!

• Tótalela mpe Bijoe, oyo auti na etúká ya Kerala, na sudi-westi ya Inde. Babenganaki Bijoe na eteyelo ya ntei mpo aboyaki kosangana na milulu oyo elendisaka bolingo ya ekólo. Bazuzi basambisaki likambo na ye mpe balongisaki losambo ya pɛto; mpe lokola alongaki, Bijoe azongaki na eteyelo.a Akɔtaki mpe na iniversite. Kasi, ezaleli ya mbindo oyo ezalaki kuna etungisaki lisosoli na ye, na bongo akataki kelasi na ye. Sikoyo, nsima ya kosala mbula zomi na Betele, esika oyo bato ndenge na ndenge bazali kosala na bomoko, amoni ete azwi matomba mingi koleka oyo alingaki kozwa nsima ya kosilisa iniversite.

• Norma na Lily bazali na mbula koleka 70 mpe esili koleka bambula ebele banda mibali na bango bakufá. Moko moko akokisi mbula koleka 40 na mosala ya ntango nyonso. Lily asali mbula 20 na Betele, lokola mobongoli ya lokota Tamil. Norma ayaki na Betele esili koleka mbula 13, nsima ya liwa ya mobali na ye. Bapesaka ndakisa malamu na ndenge basalaka mosala na bango na bolingo mpe na molende nyonso; lisusu, ndakisa na bango ezali kolendisa libota mobimba ya Betele ete ezala na bomoko. Basepelaka koyamba bapaya, mpe kolekisa ntango elongo na basangani ya libota oyo bazali naino bilenge; bayebisaka bango bisengo oyo bazwi na mbula ebele ya bomoi na bango ya boklisto. Na ngala na bango, bilenge basɛngaka bango mpe ete bayaka na bashambre na bango mpo na kobɛtɛla bango masolo, mpe basungaka bango soki bazali na bosenga. Oyo nde bandakisa malamu!

Nsima ya kolónga bokeseni oyo ebimisaka matata mpe kozanga boyokani na bisika mingi, basali yango ya bolingo malamu, oyo bazali na libota ya Betele ya Inde, libota oyo ezali na bomoko, bazali na esengo ya kosala elongo mpo na kosalela bamosusu.​—Nzembo 133:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1987, lokasa 21.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Na nsima ya bililingi: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto