Baboyaki kolanda makambo mabe ya baninga
MPOSA ya koluka kondimama etindaka bato mingi bálanda makanisi mpe misala ya baninga na bango. Mingimingi bilenge basengeli kozala na mpiko mpo na koboya misala ya mabe, lokola komela bangi mpe kosala pite. Ndenge nini bakoki koboya kolanda makambo mabe ya baninga?
Eumeli naino mingi te, bilenge basi mibale na ekólo Pologne, bakomaki boye: “Elimo ya mokili ezali komonana polele epai ya ebele ya baninga na biso. Bayibaka na ntango ya mamekani na kelasi, bazali na maloba ya bosɔtɔ, mpe basepelaka na molato ya mobulumobulu mpe na miziki ya mabe oyo ekumisaka pite. Tozali mpenza na esengo mpamba te tozali kozwa masolo oyo etali biso bilenge mpe ezali kobatela biso mpo na makambo mabe ya bilenge mosusu oyo bazali na esengo te mpe bazali batomboki!
“Tozangi maloba mpo na komonisa botɔndi na biso na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esalisaki tóyeba ete biso bilenge tozali na ntina mpe basepelaka na biso. Toli ya Biblia oyo tozwi esalisi biso tótambola malamu mpo tósepelisa Yehova Nzambe ntango nyonso. Tondimi mpenza ete kosalela Yehova na bosembo ezali nzela ya bomoi oyo eleki malamu.”
Ya solo, bilenge bakoki koboya kolanda makambo mabe ya baninga na bango. Soki “bososoli” na bango ezali koteyama, bilenge baklisto bayebaka ndenge ya kozwa bikateli ya malamu oyo emonisaka “elimo ya mokili” te, kasi, “elimo [oyo euti] na Nzambe.”—Baebele 5:14; 1 Bakolinti 2:12.