Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/12 lok. 32
  • “Eloko oyo ekosepelisa moto nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Eloko oyo ekosepelisa moto nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/12 lok. 32

“Eloko oyo ekosepelisa moto nyonso”

TUVALU, ekólo moko kitoko oyo ezali na bisanga libwa na Pasifike ya Sudi, ezali kaka na bato soki 10 500. Kasi, lokola bayebi ete Nzambe “alingi bato nyonso bábika mpe [báyeba solo malamumalamu],” Batatoli ya Yehova ya mboka yango bayokaki mposa makasi ya kozala na mikanda oyo elimbolaka Biblia na lokota na bango. (1 Timote 2:4) Ezalaki mwa mpasi, mpamba te lokota yango ezalaki ata na diksionɛrɛ moko te. Na 1979, Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki kosala mosala ya misionɛrɛ na Tuvalu, amipesaki mpo na kosala mosala yango ya mpasi. Ye na mwasi na ye bazalaki kofanda na ndako ya libota moko ya Tuvalu. Bayekolaki lokota ya Tuvalu, mpe mokemoke basalaki diksionɛrɛ moko na lokota ya Tuvalu. Na 1984, Batatoli ya Yehova babimisaki buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis na lokota ya Tuvalu.

Tomasi Puapua, oyo azaláká ministre-mokonzi ya Tuvalu, akomelaki Batatoli ya Yehova mokanda mpe amonisaki ete asepelaki na buku Bomoi ya seko. Akomaki boye: “Buku oyo ezali eloko ya sika mpe ya ntina mingi oyo ebakisami na ‘biloko ya motuya’ oyo Tuvalu ezali na yango. Bosengeli kozala na esengo mingi na mosala oyo bosali, mosala ya malamu mpenza ya kotonga bomoi ya elimo ya bato ya ekólo oyo. Nakanisi ete mokanda oyo bakokoma yango na lisolo ya mikanda ya mateya ya Tuvalu. . . . [Buku] oyo ezali eloko oyo ekosepelisa moto nyonso.”

Maloba oyo babongoli basangisaki, esalisaki bango mpo na kobimisa diksionɛrɛ moko oyo ezali na maloba ya Lingelesi ebongolami na lokota ya Tuvalu, na 1993. Ezalaki diksionɛrɛ ya liboso oyo ebimaki mpo na bato nyonso na lokota yango. Eumeli naino te, ebongiseli oyo etalelaka lokota ya Tuvalu (National Language Board of Tuvalu) esɛngaki Batatoli ya Yehova nzela mpo básalela diksionɛrɛ yango mpo ete bábimisa diksionɛrɛ na bango ya liboso na lokota ya Tuvalu.

Kobanda Yanuali 1989, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima mbala moko na sanza na lokota ya Tuvalu. Soki ozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokota mosusu oyo oyebi, mpo na nini te kotala na lokasa 2 mpo na koyeba soki bakomaka mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokota na yo? Na ntembe te, kotánga yango na lokota na yo ekosepelisa yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto