Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 lok. 32
  • Etikali moke mangomba ekóma na bomoko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etikali moke mangomba ekóma na bomoko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 lok. 32

Etikali moke mangomba ekóma na bomoko?

Christian Krause, prezida ya lisangani moko ya lingomba babengi Fédération luthérienne mondiale, alobaki boye: “Lelo, ezali mokolo monene mpo na mangomba na biso.” Ndenge moko mpe, Pápa Jean Paul II alobaki ete “kozongisa bomoko kati na baklisto ezali likambo ya ntina mingi atako esalemi na mpasi.”

Christian Krause na Pápa Jean Paul II, balobaki makambo wana na esengo ntango batyaki sinyatili na mokanda moko ya boyokani na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 1999, na engumba Augsbourg, na ekólo Allemagne, mpo na kondimisa makambo oyo bayokanaki na ntina etali Liteya ya Komonana Moto ya Sembo na miso ya Nzambe. Baponaki malamumalamu ntango mpe esika ya likita yango. Balobaka ete ezalaki na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 1517 nde Martin Luther atyaki bapapye oyo akomaki makambo 95 oyo azalaki kondima, na ekuke ya ndako-nzambe ya engumba ya Wittenberg, mpe na ndenge yango abandisaki Lingomba ya Protesta. Balandi ya Luther bamonisaki makambo oyo bazalaki kondima na engumba ya Augsbourg, na mobu 1530. Babengaka makambo yango bindimeli ya Augsbourg. Ntango Lingomba ya Katolike eboyaki bindimeli yango, bakabwanaki libela na Baprotesta.

Makambo oyo bayokani na yango, ekopesa nzela ete mangomba ekóma na bomoko, ndenge balobaki yango? Bato mosusu bakanisaki bongo te. Bato koleka 250 ya teoloji oyo bazali bakonzi na Lingomba ya Protesta batyaki sinyatili na mokanda mosusu oyo babimisaki mpo na komonisa ete baboyi Bakatolike báyangela bango. Lisusu, Baprotesta basilikaki ntango Bakatolike balobaki ete bakolimbisa masumu ya bato mpo na mobu 2000, nzokande ezali likambo yango nde ekabolaki bango esili koleka mbula soki 500. Lokola mpe tii na moi ya lelo Baprotesta balandaka bindimeli ya Augsbourg mpe Bakatolike bazali naino na ekateli ya koboya bindimeli ya Baprotesta oyo bazwaki na likita monene babengi Concile de Trente, bomoko ekoki kozala te kati na mangomba yango.

Bokabwani mpe kozanga koyokana ezali monene na kati ya mangomba ya boklisto mpe ekosila te ata batii basinyatili na mokanda moko ya makambo oyo bango nyonso bayokani. Lisusu, mangomba ekoki kozala na bomoko se soki makambo oyo bango nyonso bazali kondima euti mpenza na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Baefese 4:3-6) Bomoko ya solosolo ya losambo ekoki kosalema te mpo mangomba eyokani, kasi bomoko ya solosolo eutaka nde na koyekola mpe kosalela makambo oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Mika, mosakoli ya sembo, alobaki boye: “Mpo ete mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”—Mika 4:5.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

© Ralph Orlowski/REUTERS/Archive Photos

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto