Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Yehova apesaka basaleli na ye esika ya kopema
MOTO oyo azali kotambola na ngomba mpe alɛmbi asepelaka mingi ntango amoni, na mosika, esika ya mpiɔ mpo na kopema. Na ekólo Népal, bisika ya ndenge wana babengaka yango chautara. Chautara ekoki kozala na nse ya nzete monene babengi banian, esika ya mpiɔ mpo na kofanda mpe kopema. Kobongisela bato esika ya kopema ezali kosalela bango boboto, mpe bato mingi oyo babongisaka yango bayebanaka te.
Masolo oyo euti na Népal ezali komonisa ndenge oyo Yehova Nzambe azali kopesa “bato ya mobembo” oyo balɛmbi mokili oyo, esengo mpe azali kokitisa bango motema na elimo.—Nzembo 23:2.
• Lil Kumari afandaka na Pokhara, mboka moko kitoko oyo, soki ozali kuna, okoki komona malamu mpenza nsɔngɛ ya Ngomba Himalaya oyo ezipami na mbula-mpɛmbɛ. Kasi, Lil Kumari azalaki komitungisa mpo azalaki na mbongo te mpo na koleisa libota na ye, mpe ayebaki eloko oyo akoki kosala te. Ntango Motatoli ya Yehova moko akendaki kotala ye, Lil Kumari asepelaki mingi na elikya kitoko oyo Biblia epesi mpe na mbala moko, asɛngaki ayekolaka na ye Biblia.
Lil Kumari azalaki kosepela koyekola, kasi ezalaki pɛtɛɛ te mpo akoba koyekola mpamba te bandeko na ye baboyaki mpenza. Kasi, ye atikaki te. Akómaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe azalaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola, mingimingi likambo ya kotosa mobali. Nsukansuka, mobali na ye na mama na ye bamonaki ete makambo oyo Lil Kumari azalaki koyekola ezalaki na litomba mpo na libota mobimba.
Lelo oyo, mobali na ye na bandeko na ye mosusu bazali koyekola Liloba ya Nzambe. Na liyangani moko oyo euti kosalema na Pokhara, Lil Kumari akendaki na bandeko na ye 15. Alobi boye: “Ndako na ngai ekómi esika ya kopema mpamba te libota na biso mobimba tozali kati na losambo ya solo, mpe nakómi na kimya ya solosolo ya makanisi.”
• Atako na Népal, mibeko ya Leta epekisi koponapona mposo, likambo yango ezali naino makasi epai ya bato ya mboka yango. Yango wana, bato mingi basepelaka koyoka makambo oyo Biblia elobi, ete bato nyonso bazali ndenge moko mpe esengeli te koponapona bato. Bomoi ya Surya Maya na bandeko na ye ebongwanaki mpenza ntango bayebaki ete “Nzambe [aponaponaka] bato te.”—Misala 10:34.
Surya Maya azalaki komitungisa mingi mpo na likambo ya koponapona mposo mpe ndenge oyo bato bamipesi na kolanda bonkɔkɔ. Lokola amipesaki mingi na losambo, banda bambula ebele, Surya Maya azalaki kobondela bikeko esalisa ye. Kasi, mabondeli na ye ezalaki kozwa eyano te. Mokolo mosusu, ntango azalaki koganga mpo na kosɛnga lisalisi, Babita, nkɔkɔ na ye ya mbula motoba atunaki ye ete: “Mpo na nini ozali koganga mpo na kosɛnga lisalisi na bikeko oyo ekoki kosala eloko moko te?”
Nzokande, mama ya Babita azalaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Babita abengisaki nkɔkɔ na ye na makita ya lisangá. Ntango Surya Maya akómaki na makita, makambo oyo amonaki kuna ekamwisaki ye: amonaki bato ya mposo ndenge na ndenge bafandi esika moko mpe moto moko te azali kokanisela basusu mabe. Mbala moko asɛngaki bákendaka koteya ye Biblia na ndako. Atako baninga ya kartye balingaki ye lisusu te, kasi alɛmbaki te; mpe lisusu, atako ayebi kotánga mpe kokoma malamu te, yango epekisaki ye te kokola na elimo.
Eleki sikoyo mbula mwambe, mpe bato motoba na libota na ye, na kati na bango mobali na ye na bana na bango misato, bakómi Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, Surya Maya azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza; na esengo nyonso, azali kosalisa bato na kokitisa bozito na bango na esika ya kopema ya solosolo oyo, kaka Yehova akoki kopesa.