Kimya na mokili mobimba ekoya ndenge nini?
ETIKALI moke kimya ekɔta na mokili mobimba? Bato mingi oyo bazalaki liboso kokanisa bongo bakómi sikoyo kokakatana. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko ya Afrika ya Sudi (Daily Mail & Guardian) elobelaki mikakatano ya bomoi na mikolo ekoya ete, “sikoyo tozali komona ete bato oyo bazalaki kosakola makambo ya sika na mokili eleki kaka mbula 10, bazalaki na elikya oyo eleki ndelo.”
Bato oyo bakomaki lisolo yango balobeli elikya oyo bato mingi bazalaki na yango eleki kaka mbula zomi. Na ntango yango, kowelana kati na mikili ya nguya (guerre froide) eutaki kosila mpe bazalaki lisusu kowela esika ya liboso te. Na ndenge oyo makambo ezalaki komonana lokola ete tobandi mokili moko ya sika, mingi bazalaki na elikya ete bato bakokende mpenza liboso mpo na kosilisa bobola, maladi, mpe kobebisama ya mabele mpe mopɛpɛ. Lisolo yango elobi ete: “Lelo oyo makambo yango nyonso ezalaki mpenza makanisi mpamba. Bitumba ebimi na bisika oyo tokanisaki ata te, bobola na mokili mobimba ezali se kobakisama. Bikólo mibale lisusu ekómi na bibundeli ya nikleere. Bato bazali lisusu kotyela ONU motema te mpamba te elongi kosilisa mikakatano ya bato te. Bato bazali lisusu na elikya ya mokili ya malamu te, bakómi nde na nsɔmɔ.”
Bayekoli ya Biblia bayebi ete na milende na bango, bato bakosala eloko ya malonga te ata soki bazali na makanisi ya malamu. Mpo na nini? Mpamba te, ndenge Biblia elobi yango, “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Lokola Satana nde azali kotambwisa mokili, ekoki ata moke te kokóma Paladiso ndenge ezalaki ntango Nzambe akelaki yango.
Atako bongo, ntina ya kozala na elikya ezali. Yehova Nzambe alaki ete akotya kimya na mokili; yango wana, akobongisa makambo ya mokili oyo te, kasi akosala nde “mabele ya sika” esika oyo “boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Bokonzi ya Nzambe ekobongola mabele mpo ezala esika ya malamu, esika oyo bato nyonso ya botosi bakozala na bomoi ya esengo mpe na mosala ya malamu libela na libela. Longola yango, Nzambe alaki ete “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” Bilaka yango euti na bisakweli ya bato te, kasi euti na Liloba ya Mozalisi oyo abukaka lokuta te.—Emoniseli 21:4; Tito 1:2.