Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/9 lok. 32
  • Bolingo ya baklisto esukaka kaka na maloba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo ya baklisto esukaka kaka na maloba te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/9 lok. 32

Bolingo ya baklisto esukaka kaka na maloba te

NA ESANGA Trinité, biloko nyonso ya libota ya Bartholomew ezikaki na mɔ́tɔ ntango ndako na bango ezikaki. Ndeko na bango moko oyo azalaka mosika te na bango apesaki bango esika bálalaka, kasi nyonso esukaki wana te.

Olive Bartholomew azali Motatoli ya Yehova. Bandeko ya lisangá na ye mpe ya masangá mosusu ya zingazinga babandaki kosangisa mbongo mpo na kotongela ye na libota na ye ndako na bango. Basalaki komite moko mpo na kotambwisa misala, mpe babandaki kotonga. Batatoli soki 20, na bato mosusu ya kartye basalaki misala. Bilenge mpe basanganaki na mosala yango, kutu bamosusu bazalaki wana mpo na kopesa mwa biloko ya kolya.

Zulunalo moko (Sunday Guardian) ya Esanga Trinité eyebisaki maloba ya Olive ete: “Libota na ngai bakamwe mpenza. Bazali Batatoli te, mpe tii sikoyo mobali na ngai azali kondima te makambo oyo azali komona.”

Ntango ndeko oyo akambaki misala alobelaki na mokuse milende oyo esalemaki, amonisaki ete misala ya ndenge yango ezali elembo oyo ezali komonisa baklisto ya solo. Alobaki ete: “Tosukaka kaka te na kokende ndako na ndako mpo na kolobela bolingo. Tosalaka makasi mpo na kosalela makambo oyo tosakolaka.”—Yoane 13:34, 35.

[Elilingi na lokasa 32]

Olive Bartholomew na mobali na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto