Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/8 lok. 32
  • Tózwa liteya epai ya kapitɛnɛ ya masuwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa liteya epai ya kapitɛnɛ ya masuwa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/8 lok. 32

Tózwa liteya epai ya kapitɛnɛ ya masuwa

KOTAMBOLA yo moko na masuwa na kati ya mai monene ekoki kolɛmbisa. Ntango kapitɛnɛ ya masuwa alɛmbi ekoki kozala mpasi te ete akanisa lisusu malamu te mpe yango ekoki komema ye asala mabunga mpe azwa bikateli ya mabe. Yango wana, kapitɛnɛ ya masuwa ayebaka ntina ya longo malamu. Longo esalisaka kapitɛnɛ atɛlɛmisa masuwa mpo mai emema yango na likama te soki alɛmbi, apema mpe nsima azwa lisusu makasi. Lisusu, soki babwaki longo, esalaka ete masuwa etɛlɛma esika moko, etalaka bobele epai mopɛpɛ mpe mbonge ezali kouta mpe epikamaka malamu na esika na yango mpo ekende epai na epai te.

Lokola bato ya masuwa bakutanaka na makama mingi, baklisto mpe bazali kokutana na mitungisi ya mokili oyo, yango wana bazali mpe na mposa ya kopema. Kutu, mokolo moko Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Boya kaka bino moko mpo tokende na esika ya kimia na esobe mpe bopema moke.” (Malako 6:31, Boyokani ya Sika) Lelo oyo, baklisto mosusu bazwaka mwa bapɔsɔ ya konje mpo na kokende mobembo to bakendaka mwa mosika elongo na mabota na bango mpo na komipemisa na mokolo ya pɔsɔ mpe ya eyenga. Ntango ya kopema ekoki kosalisa bango bázwa lisusu makasi. Kasi, tokosala nini mpo ntango ya kopema ebebisa elimo na biso te? Eloko nini tokosalela lokola longo ya elimo mpo mai emema biso epai na epai te mpe tótɛngatɛnga te?

Na boboto na ye, Yehova apesi biso eloko moko. Ezali Liloba na ye Mosantu, Biblia. Soki tozali kotánga yango mokolo na mokolo, tokotikala penepene na Yehova mpe tokopɛngwa soki moke te. Toli ya Biblia ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te mpe tókwea te na masɛnginya ya Satana na mokili na ye. Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, ata soki totángi yango na bangonga oyo toponá te, yango ekoki kozala lokola longo na biso na elimo.​—Yosua 1:7, 8; Bakolose 2:7.

Mokomi ya nzembo alobi na biso ete “esengo ezali na moto” oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2) Lokola tozali baklisto, kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, ekopesa biso “esengo” mpo tokopema mpe tokozwa lisusu makasi, tokozala bato oyo bamibongisi mpo na kolanda komitambwisa malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto