Ozali komikundola?
Osepelaki na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo eutaki kobima? Na bongo, talá soki okoki koyanola na mituna milandi:
• Mpo na nini tokoki kondima ete kokokisama ya esakweli ya “makoló ya sika na mabele ya sika” oyo ezali na Yisaya 65:17-19 esukaki te bobele ntango Bayuda bautaki na boombo?
Mpamba te ntoma Petelo na ntoma Yoane, bakomaki mpo na esakweli yango na ekeke ya liboso T.B., mpe bamonisaki ete esakweli yango ekokokisama na mikolo oyo ezali liboso, mpe ntango ekokokisama, bato bakozwa mapamboli mingi oyo sikoyo eyei naino te. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-4)—15/4, nkasa 10-12.
• Masapo ya Bagreke ya kala oyo elobelaka mwa banzambe mbala mosusu eutaki wapi?
Yango ekoki kozala likambo ya kobakisa to kobongola lisolo oyo elobaka ete liboso ya Mpela baanzelu mosusu balataki nzoto ya bato mpe bayaki awa na mabele, bazalaki bato ya mobulu mpe ya mbindo. (Genese 6:1, 2)—15/4, lokasa 27.
• Mwa makama nini baklisto oyo bakɔmeli basengeli kokeba na yango na bafɛti ya libala?
Esengeli koboya loyenge, oyo ekoki komonana ntango masanga ezali bebo mpe bato bazali kobina mabina ya mabe mpe miziki ezali kobɛta makasi. Soki balobi te ete moto nyonso oyo asepeli akoki kokende na fɛti, baoyo babengisi bango te basengeli kokende te. Mobali asengeli mpenza komindimisa ete baklisto oyo bakokamba fɛti bakozala wana tii na nsuka ya fɛti oyo esengeli mpe kosila na ngonga malamu.—1/5, nkasa 19-22.
• Na Nzembo 128:3, Biblia elobi ete bana bazali “lokola mwa nzete ya sika na nzete ya [olive]” zingazinga na mesa ya moto, yango elingi koloba nini?
Mbala mingi banzete mikemike ya sika ebimaka na mobimbi ya nzete ya olive. Soki mobimbi ya nzete ya monene ezali lisusu kobota mbuma mingi te lokola ezalaki kobota liboso, banzete mikemike ya sika ekokola mpe ekokóma makasi zingazinga ya mobimbi yango. Ndenge moko mpe, baboti bakoki kosepela kozala na bana oyo bazali kobota mbuma mpe bazali na bango elongo na mosala ya Yehova.—15/5, lokasa 27.
• Wapi mwa matomba bana bazwaka soki boyokani ezali malamu na kati ya libota?
Ekosalisa bango bázala na likanisi malamu mpo na baoyo bazali na bokonzi, bálinga bizaleli ya malamu mpe báyeba kofanda na bato. Na yango, soki boyokani ezali malamu na kati ya libota, yango ekopesa nzela ete na nsima boyokani ya mwana na Nzambe ekola.—1/6, lokasa 18.
• Na ekólo moko na Extrême-Orient, nini esalemaki mpo na kolendisa likanisi oyo ete baklisto nyonso bazali bandeko?
Balendisaki lisangá mobimba bábengaka bandeko mosusu te na maloba ya lokumu. Kasi, bango nyonso basengeli kobengana ndenge moko lokola bazali bandeko.—15/6, nkasa 21, 22.
• Batatoli ya Yehova bandimaka minganga básalisa bango na nkisi oyo esalemi na makila?
Tokanisi mpenza ete mobeko ya Biblia oyo elobaka ete ‘bóboya makila’ epekisi kozongisa makila to biloko oyo esangani mpo na kosala makila (lokola plasma sanguin, globules rouges, globules blancs, mpe plaquette sanguine). (Misala 15:28, 29) Na oyo etali biloko mikemike oyo bakoki kobimisa na biloko oyo esangani mpo na kosala makila, moklisto mokomoko asengeli kozwa ekateli na ye, kasi akobosana te makambo Biblia elobi mpe boyokani na ye na Nzambe.—15/6, nkasa 29-31.
• Tokoki mpenza kozwa kimya ya makanisi lelo oyo?
Ɛɛ. Na lisalisi ya Biblia, Yesu Klisto azali kokamba bato na losambo ya pɛto mpe ya kimya oyo elobelami na Yisaya 32:18. Lisusu, baoyo bazali kozwa kimya yango bazali na elikya ya kozala na kimya ya libela na libela awa na mabele ntango Nzembo 37:11, 29 ekokokisama.—1/7, lokasa 7.
• Mokumba nini George Young akokisaki na ndenge oyo lisangá ya Teokrasi ekoli na ntango na biso?
Kobanda 1917, amemaki pole ya nsango malamu ya Bokonzi na bamboka mingi. Mosala na ye ememaki ye na Canada mobimba, tii na bisanga ya Caraïbes, na Brésil mpe na bamboka mosusu ya Amerika ya Sudi mpe Amerika ya Ntei, na Espagne, na Portugal, tii na mikili oyo ezalaki kala na Union soviétique, mpe na États-Unis.—1/7, nkasa 22-27.
• Vɛrsɛ ya 1 Bakolinti 15:29 elingi koloba nini ntango elobi ete bamosusu “bakobatisamaka [mpo na kozala bakufi]”?
Elingi koloba ete baklisto bapakolami na elimo santu, bazali kondima bomoi oyo ezali komema bango na liwa mpe na nsima bakosekwa mpo na bomoi na likoló.—15/7, lokasa 17.
• Ntoma Paulo azalaki kosala nini na bambula oyo Biblia elobi eloko te mpo na ye?
Mbala mosusu azalaki kopesa mabɔkɔ mpo na kosala to kolendisa masangá na Sulia mpe na Kilikia. Ekoki mpenza kozala ete na ntango yango nde azalaki kokutana na ebele ya minyoko oyo elobelami na 2 Bakolinti 11:23-27. Yango emonisi ete atikaki mosala ya kosakola te.—15/7, nkasa 26, 27.
• Nini ekoki kosalisa biso mpo tótya elikya na makambo oyo eleki ndelo te?
Kobosana te ete Yehova amityaka na esika ya biso. Kobondela ye ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati na makanisi na biso, mpe ekomonisa ete tozali na bopɔlɔ. Eloko mosusu oyo ekoki kosalisa biso ezali makanisi malamu oyo tokozwa soki tozali kosolola na moninga moko oyo akɔmeli na elimo.—1/8, nkasa 29, 30.