Mayele oyo euti na Nzambe ndenge nini emonanaka?
“MAYELE na mobola etyolami mpe maloba na ye eyokami te.” Na maloba oyo, Salomo mokonzi ya mayele asukisaki lisolo ya moto moko oyo azalaki mobola kasi na mayele mingi, oyo abikisaki engumba mobimba na likama. Likambo ya mawa, “moto te akanisaki mobola yango.”—Mosakoli 9:14-16.
Bato bamonaka babola mpamba, ata soki basali makambo ya malamu. Ezali mpenza yango nde ekómelaki Yesu. Yisaya asakolaki mpo na Yesu, ete: “Atyolamaki mpe aboyamaki na bato, moto na mawa mpe oyo amesanaki na mpasi.” (Yisaya 53:3) Bato mosusu batyolaki Yesu bobele mpo ete azalaki lokola bakonzi minene te to lokola bato minene te ya ntango na ye. Nzokande, azalaki na mayele oyo moto ata moko te ya masumu akokaki kozala na yango. Bato ya mboka na Yesu baboyaki kondima ete mwana ya “mosali na mabaya” wana akokaki kozala na mayele ya ndenge wana mpe kosala misala ya nguya bongo. Kasi, yango ezalaki mpenza libunga monene, mpamba te lisolo yango elandi koloba ete Yesu “asalaki misala mingi na nguya wana te mpo na kozanga na bango na kondima.” Bato yango bazangaki mpenza makambo mingi!—Matai 13:54-58.
Tókeba ete tósala libunga motindo wana te. Yesu alobaki ete: “Mayele alongi na misala na ye.” Baoyo bazali kosala mosala ya Nzambe mpe bazali kosakola mayele oyo euti na likoló, bayebani te lokola bato minene to bato ya mbongo, kasi bayebani mpo na “mbuma ya malamu” oyo bazali komonisa—kondima na bango oyo euti na Biblia mpe misala na bango.—Matai 7:18-20; 11:19.