Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Baoyo balingaka Yehova bazali na motuya mingi na miso na ye
BANDA na ntango ya kala Lebanona (Liban) eyebanaki mingi mpo na mabele na yango ya malamu mpe bazamba na yango ya kitoko. (Nzembo 72:16; Yisaya 60:13) Eyebanaki mingimingi mpo na nzete monene ya Eleze, oyo bazalaki kolukaluka yango mpo na kotonga bandako, mpamba te ezalaki kitoko, na nsolo ya malasi ya kitoko mpe ezalaki makasi mingi. Na ekeke ya liboso, eloko moko ya motuya mingi koleka emonanaki na Lebanona. Evanzile ya Malako elobi ete na Tula mpe na Sidona, bingumba oyo ezalaki na teritware ya kala ya Lebanona, “ebele na bato bayoki nsango na misala na ye [Yesu], bayei epai na ye.”—Malako 3:8.
Lolenge moko mpe lelo oyo, ekólo Liban ezali kobota mbuma oyo ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Makambo oyo elandi ekomonisa yango.
• Basɛngaki na Wissam, elenge moko Motatoli ete asala lisolo ya miniti 30 na eteyelo liboso ya baninga na ye ya kelasi. Wissam amonaki ete ezali libaku malamu mpo na kopesa litatoli. Na yango asalelaki buku “La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?” Mpe abongisaki lisolo oyo etalelaki bozalisi. Ntango molakisi na ye amonaki lisolo yango, alobaki ete lokola ezali lisolo moko ya ntina mingi, asɛngaki Wissam ete asala yango na miniti 45.
Ntango Wissam abandaki lisolo na ye, molakisi na ye akataki ye mpe atindaki ete bábenga mokambi ya eteyelo. Mosika te mokambi yango akómaki mpe Wissam abandaki koloba lisusu. Ntango ayokaki mituna oyo Wissam atunaki na ebandeli ya lisolo na ye, mokambi yango asepelaki mingi mpe alobaki ete bayekoli nyonso básala fɔtɔkɔpi ya lisolo yango.
Mwa moke na nsima, molakisi mosusu, oyo azalaki koleka, amonaki ete bato oyo bazali na kelasi bazali kosepela mingi mpe alukaki koyeba likambo nini ezali koleka. Ntango bayebisaki ye, atunaki soki Wissam azali koluka kopesa bilembeteli ya liteya ya bozalisi to ya evolisyo. Bayebisaki ye ete “Bozalisi.” Ntango ayei koyeba ete Wissam azali Motatoli ya Yehova, molakisi yango alobaki na kelasi ete: “Bokomona na lisolo na ye ete siansi ezali kondima bozalisi kasi evolisyo te.”
Eyaki koyebana ete molakisi wana azalaki na buku Création mpe azalaki kosalela yango mpo na kopesa masukulu na iniversite! Liboso ya kokende, asɛngaki soki akoki kozonga mbala ya nsima elongo na bayekoli na ye mpo Wissam asala lisusu lisolo yango liboso na banakelasi na ye. Yango epesaki nzela ete litatoli mosusu ya malamu epesama mpo na Yehova.
• Nina, elenge ya mbula ntuku mibale na mibale azalaki na mposa makasi ya mai ya solo. Mokolo moko ndeko na ye mosusu apesaki ye Biblia mpe akɔtisaki ye na Lingomba ya Pantekote. Nina atángaki Biblia na esengo mpenza mpe amonaki na botángi na ye ete baklisto basengeli kosakola, mpe abandaki kosolola na bato oyo ayebanaki na bango. Moto nyonso oyo azalaki kosolola na ye, azalaki kotuna: “Ozali Motatoli ya Yehova?” Ezalaki kokamwisa ye.
Mbula motoba na nsima, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako ya Nina mpe bayebisaki ye makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Na ebandeli, alukaki kotyola mateya na bango. Kasi amonaki ete biyano na bango nyonso ezali solo ya mayele mpe ezalaki kouta na Biblia.
Na nsima, ntango Nina ayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova; mpe ayebaki mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato; mpe bongo na bongo, yango endimisaki ye ete asili komona solo. Amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo. Na mbula nsambo oyo euti koleka Nina asalaki lokola mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Ya solo Yehova apambolaka baoyo bazali na bolingo ya solo mpo na ye.—1 Bakolinti 2:9.