Bomoi na yo ekoki kozala na ntina mingi?
MBALA mingi, motuya ya solosolo ya eloko emonanaka na miso te. Lokasa ya mbongo oyo eleki motuya na États-Unis ezali lokasa ya dolare 10 000. Kasi papye oyo basalelaki yango ezali kaka na motuya ya mwa basantime mpamba.
Esila kokómela yo na kokanisa soki mwa nkasa wana oyo ezali mpenza na motuya moke ekoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina? Bato mingi bakanisaka bongo. Bamilio ya bato bazali kosala mosala butu na moi mpo na kozwa mbongo mingi. Ntango mosusu bazali ata kobosana bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, baninga na bango, ata mpe mabota na bango, kaka mpo na koluka mbongo. Bongo na nsima bakozwa nini? Mbongo to biloko oyo basombaka na mbongo, ekoki kopesa moto bolamu ya solosolo?
Bato ya mayele balobi ete ntango tozali komipesa mingi na koluka bozwi mpo na kokóma na bolamu, mbala mingi tozali kozwa yango te. Mopanzi-nsango Alfie Kohn alobi ete “batɛkaka bolamu te. . . . Mbala mingi, bato oyo bamonaka ete kozala na biloko mingi nde likambo oyo eleki ntina na bomoi na bango, bazalaka na mitungisi mingi mpe banyokwamaka mingi na makanisi mpe lisusu bango nde bazalaka na esengo te koleka bato nyonso.”—Zulunalo International Herald Tribune.
Atako bato ya mayele bakoki komona ete mpo moto azala na bomoi ya malamu, azali mpe na mposa ya makambo mosusu, kasi mbongo kaka te, bato mosusu bakanisaka bongo te. Ezali mpenza likambo ya kokamwa te, mpamba te, bato oyo bafandi na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bakoki kolanda bapiblisite 3 000 na mokolo moko mpamba. Ezala ete bazali kolakisa mituka to bombo na bapiblisite yango, likanisi na bango ezali kaka moko: ‘Soki osombi eloko oyo, okozala malamu.’
Lokola bazali ntango nyonso kolendisa bato bápesa motuya mingi na biloko ya mokili, yango ezali kobota mbuma nini? Mbala mingi bato bazali kobosana motuya ya biloko ya elimo! Lisolo moko ya zulunalo Newsweek elobaki ete eleki mwa mikolo, episkɔpɔ ya lokumu na engumba Cologne, na Allemagne, alobaki ete “na mokili na biso bazali kolobela lisusu Nzambe te.”
Mbala mosusu omipesi mingi mpo na koluka kozala na bomoi ya malamu. Okoki mpe komona ete ozali na ntango mingi te mpo na kosala makambo mosusu. Kasi, mbala na mbala ekoki kozala ete okanisaka ete bomoi esengeli kozala na makambo mosusu kasi ezali kaka te kendé-zongá, oyo bobele maladi to bobange nde ekoya kosukisa.
Soki opesi mwa ntango mingi mpo na kotalela makambo ya elimo, yango ekoki nde kobakisela yo bolamu? Nini ekoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi?