Ntina oyo tosengeli kolimbisaka
ZULUNALO moko (The Toronto Star) oyo ebimaka na Canada, eyebisi ete: “Bato ya mayele babandá kosala ankɛtɛ moko oyo ebandi komonisa ete ezaleli ya kolimbisa ekoki mpenza kobongisa bokolɔngɔnɔ ya makanisi ya moto ata mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye. Nzokande, profɛsɛrɛ Carl Thoresen, molakisi na Stanford University, na États-Unis, mokambi ya ebongiseli moko (Standford Forgiveness Project), alobi ete “bato oyo bayebi ntina ya kolimbisa mpe makambo oyo yango esalaka, bazali mingi te.”
Baklisto batalelaka kolimbisa ya solosolo lokola likambo ya ntina mpenza. Lisolo ya zulunalo The Toronto Star elimboli bolimbisi lokola “koyeba ete basaleli yo mabe, kokangela moto oyo asali yo mabe nkanda te, mpe koyokela moto yango mawa mpe ata kolinga ye.” Tosengeli kokesenisa kolimbisa na komona likambo mpamba, kobosana likambo, to koboya kondima mabe moko; yango elimboli mpe te kondima ete básala yo lisusu mabe. Lisolo yango elobi ete mpo na kolimbisa solosolo, esengeli nde “kokanga nkanda te mpe kozala na makanisi mabe te.”
Bato ya mayele balobi ete esengeli báyekola lisusu mingi matomba oyo moto akoki kozwa soki azali kolimbisa. Atako bongo, bamoni matomba oyo kolimbisa epesaka moto na makanisi, mpe balobi ete “ekitisaka mawa, mitungisi, mpe konyokwama na makanisi.”
Mokapo ya Baefese 4:32 eyebisi ntina monene oyo tosengeli kolimbisaka bato, elobi ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisanaka moko moko [lokola] Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Na likambo ya kolimbisa, mpe na makambo mosusu, tosengeli kolanda ndakisa ya Nzambe.—Baefese 5:1.
Soki tozali koboya kolimbisa basusu na ntango ebongi mpenza tóyokela bango mawa, yango ekoki mpe kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Yehova alingi ete tólimbisanaka. Na bongo nde tokoki kobondela ye alimbisa biso.—Matai 6:14; Malako 11:25; 1 Yoane 4:11.