Tózala ntango nyonso sembo epai ya Yehova
ATAKO bato mingi bazali sembo te lelo oyo, kasi bosembo ezali ezaleli mpenza ya basaleli ya Nzambe ya solo, Yehova. Moto ya sembo alembaka te soki akutani na minyoko mpe ata soki minyoko yango ezali koumela akozala kaka sembo. Tókamata ndakisa ya Hizikiya, mokonzi malamu. Biblia elobi ete: “Kati na mikonzi nyonso na Yuda, mosusu azalaki lokola ye te, nsima na ye to liboso na ye.” Nini esalaki ete Hizikiya akesana na bakonzi mosusu nyonso? “[Akangamaki, NW] na [Yehova],” atako basambeli ya Moleke, nzambe ya lokuta, bazalaki kofanda esika moko na ye. Ya solo, Hizikiya “alongwaki na nsima na [Yehova] te kasi atosaki mibeko na ye.”—2 Mikonzi 18:1-6.
Moto mosusu oyo azalaki ntango nyonso sembo epai ya Yehova ezali ntoma Paulo. Lisolo ya mosala na ye ya kosakola ndenge totángaka yango na Makomami ya Greke ya boklisto ezali komonisa mpenza ete Paulo azalaki ntango nyonso kosalela Nzambe mosala na molimo na ye mobimba. Ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Paulo alobaki boye: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela kondima.”—2 Timote 4:7.
Hizikiya na Paulo bazali mpenza bandakisa malamu ya bosembo mpo na biso! Tólanda ndakisa ya kondima na bango mpe tózala ntango nyonso sembo epai ya Nzambe na biso Monene, Yehova.—Baebele 13:7.