Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/4 lok. 32
  • Apesi eloko ya motuya na miso ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Apesi eloko ya motuya na miso ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/4 lok. 32

Apesi eloko ya motuya na miso ya Yehova

Biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Mozambique ezwaki mokanda moko oyo elobaki boye:

“Nazali mwana mobali, nazali na mbula nsambo. Nazali naino na eteyelo ya ebandeli. Natindi mbongo oyo, nazwaki yango ntango natɛkaki nsoso moko nazalaki kobɔkɔla. Natɛkaki yango na Meticais 12 000 [dolare 1]. Napesi Yehova matɔndi mpo akolisi mwana ya nsoso ya liboso oyo nabɔkɔli tii ekómi nsoso mobali ya monene. Nalingi bósalela likabo na ngai mpo na mosala ya Bokonzi ya Yehova.

“P.S. Tata na ngai asalisaki ngai na kokoma mokanda oyo.”

Bato mosusu bakanisaka ete kaka bato oyo bazali na bozwi nde bakoki kokabaka. Nzokande, soki totángi lisolo ya Biblia oyo elobeli mwasi-mokufeli-mobali oyo atyaki “meya mibale oyo ezali na motuya moke mpenza” na kɛsi oyo bazalaki kotya mbongo na tempelo, tokomona ete elimo ya kokaba etalaka biloko oyo moto apesi te, kasi nde motema na ye.—Luka 21:1-4, NW.

Yehova asepelaka na likabo nyonso oyo moto apesi na bolingo mpe na motema moko, ata soki ezali moke. Mpe apambolaka mpenza baoyo bazali kolanda ndakisa na ye ya kokaba na ndenge bazali kopesa ntango na bango, makasi na bango to bozwi na bango mpo na Bokonzi na ye.—Matai 6:33; Baebele 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto