Ezongisi mpɛtɛ na misapi na bango
“TALÁ na misapi na ngai. Omoni nini?” Mobali moko alakisaki lobɔkɔ na ye epai ya mwasi moko Motatoli ya Yehova. Mwasi yango atalaki mpe amonaki ete azalaki lisusu na lopɛtɛ na ye ya libala te. Mobali yango alobaki ete ye na mwasi na ye bakoki lisusu kofanda esika moko te, bazwaki mokano ya koboma libala na bango. Motatoli wana alobaki ete: “Zelá naino! Kamatá buku oyo mpe tángá yango. Ekosalisa bino na libala na bino.” Apesaki ye mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokanda yango ezali na mateya ya Biblia.a
Nsima ya mwa mikolo, mobali yango azongaki epai ya Motatoli wana mpe azalaki na esengo. Alakisaki ye lobɔkɔ na ye. Na mbala oyo alataki lopɛtɛ na ye ya libala. Ayebisaki ye ete ye na mwasi na ye batángaki buku Boyebi mpe sikoyo bazali malamu mpe bazali na esengo. Ezali mokanda yango nde ezongisaki mpenza mpɛtɛ na misapi na bango.
Toli ya Biblia ekoki kosalisa mwasi na mobali bálingana na bolingo ya solosolo. Ezali bongo mpamba te Biblia ezali mokanda ya moto te kasi ya Mozalisi na biso, oyo alobi ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”—Yisaya 48:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.