Moto autá na nyama?
“Ezali mpenza na ntina ndenge tondimaka lolenge oyo bomoi ebanda?”
Elenge mwasi moko ya mbula 16 na ekólo Brésil, atunaki motuna yango na ebandeli ya lisolo moko oyo asalaki na kelasi. Lisolo yango ezalaki na motó ya likambo ete: “Moto autá na nyama?” Ntango apesaki molakisi na ye Lamuká! ya 22 Yuni 1998 (ebimeli ya Lifalanse) oyo ezalaki na lisolo yango, molakisi asɛngaki ye asala lisolo yango na kelasi.
Elenge yango azali Motatoli, amonisaki ete bato basali makambo mingi ya mabe mpo bandimaki liteya ya evolisyo oyo elobaka ete bikelamu ya bomoi eumelaka na bomoi bobele soki emeseni na esika oyo yango ezali. Na ndakisa, bato mingi bamonaka ete liteya ya evolisyo epesaki bato mosusu makanisi ete bitumba ezali se moko na milende oyo moto azali ntango nyonso kosala mpo na kozala na bomoi, mpe makanisi yango nde ebimisaki mateya ya politiki ya Bafasiste na ya Banazi.
Mwana kelasi yango amonisaki ete bato bakeseni mpenza na banyama. Alobaki ete: “Kaka bato nde bakoki koyoka mposa ya kosambela. Kaka bato nde balukaka koyeba mpo na nini bazali na bomoi mpe bomoi ezali na ntina nini. Kaka bato nde bamitungisaka mpo na liwa, balingaka koyeba soki bautá wapi, mpe bazalaka na mposa ya kozala na bomoi ya seko. Koluka koyeba ndenge bomoi ebandaki ezali mpenza likambo ya ntina!”
Molakisi akumisaki lisolo kitoko yango. Alobaki ete soki elenge Motatoli yango asalaki lisolo kitoko ezali mpo alingaka kotánga. Na eteyelo mobimba bayebi elenge yango ete atángaka mingi mikanda oyo elimbolaka Biblia lokola Lamuká! mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
Batatoli ya Yehova bamitungisaka mpo na makambo oyo liteya ya evolisyo ezali kosala na mitema mpe na makanisi ya bilenge. Yango wana, lisangá ya elenge mwasi wana elendisaki Batatoli oyo bazali bilenge bápesa balakisi mpe baninga na bango ya kelasi Lamuká! ya 22 Yuni 1998. Bakabolaki bazulunalo soki 230 na biteyelo mingi ya engumba na bango. Na eteyelo moko, mokambi ya departema ya siansi asalaki abonema na Lamuká!
Ya solo, ndenge tondimaka lolenge oyo bomoi ebandá ezali mpenza na ntina! Lolenge elenge yango na baninga na ye bandimaka ete Mozalisi azali, ezali na ntina mpenza na bomoi na bango.