Ndenge nini Yehova akokanisa yo?
“NZAMBE na ngai, kanisá ngai.” Mbala mingi Nehemia abondelaki Nzambe na maloba yango. (Nehemia 5:19; 13:14, 31) Ezali mabe te ntango moto akutani na mikakatano abondela Nzambe na maloba ya ndenge wana.
Kasi, bato bakanisaka nini ntango basɛngaka Nzambe akanisa bango? Ezali polele ete balikyaka kaka te ete Nzambe abosana nkombo na bango te. Na ntembe te bazalaka na elikya ndenge moko na moto moko ya mabe oyo babomaki ye esika moko na Yesu. Moto yango akesanaki na moninga na ye. Ye asɛngaki Yesu ete: “Wana ekokóma yo na bokonzi na yo, kanisá ngai.” Alingaki Yesu akanisa kaka te ete azalaki nani kasi asala likambo moko mpo na ye, asekwisa ye.—Luka 23:42.
Mbala mingi, Biblia ezali komonisa ete mpo na Nzambe, “kokanisa” elimboli kosala likambo moko ya malamu. Na ndakisa, nsima ya mpela oyo ezindisaki mokili mobimba mikolo 150, “Nzambe akanisaki Noa . . . Mpe Nzambe alekisaki mopɛpɛ likoló na mokili, mpe mai ekitaki.” (Genese 8:1) Bambula mingi na nsima, ntango Bafilistia batɔbɔlaki Samasona miso mpe bakangaki ye minyɔlɔlɔ, ye asalaki libondeli oyo: “[Yehova], nabondeli yo, kanisá ngai mpe lendisá ngai bobele mbala oyo.” Yehova akanisaki Samasona mpe apesaki ye makasi oyo eleki makasi ya bato mpe abomaki banguna ya Nzambe mpo na makambo oyo basalaki ye. (Basambisi 16:28-30) Mpo na Nehemia, Yehova apambolaki milende na ye, mpe losambo ya solo ezongaki na Yelusaleme.
Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo na nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na makomi.” (Baloma 15:4) Soki tozali kokanisa Yehova mpe tozali koluka kosala mokano na ye na ndakisa ya basaleli na ye ya sembo na ntango ya kala, tokoki kozala na elikya ete Yehova akokanisa biso mpe akosalisa biso tózwaka biloko oyo tozali na yango mposa mokolo na mokolo. Akosunga biso na komekama oyo tozali kokutana na yango, mpe akobikisa biso ntango akopesa bato mabe etumbu.—Matai 6:33; 2 Petelo 2:9.