Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/1 lok. 32
  • Na mbula oyo Biblia ekabolamaki mingi koleka bambula nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na mbula oyo Biblia ekabolamaki mingi koleka bambula nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/1 lok. 32

Na mbula oyo Biblia ekabolamaki mingi koleka bambula nyonso

LAPOLO moko ya Alliance biblique universelle elobaki ete: Bato mingi lelo oyo bazali na Biblia koleka ndenge ezalaki liboso. Na 1998 Biblia milio nkama mitano ekabolamaki koleka oyo ekabolamaki na mbula oyo eleki. Na nyonso, Biblia koleka milio 585, na mobimba to na ndambo, ekabolamaki na mokili mobimba. Lapolo yango elobaki ete: “Yango ezali likambo ya kolendisa. Bato mingi bazali koyoka Liloba ya Nzambe lelo oyo.”

Kasi, kozala na Biblia mpe kotánga Biblia ezali makambo mibale ekeseni. Na ndakisa, ankɛtɛ moko emonisaki ete na États-Unis, bato mingi mpenza (koleka 90 %) bazali na Biblia ata moko, mpe bato oyo bandimaka ete Biblia ezali na mateya malamu mpenza bazali mpe na motango yango. Nzokande, kaka ndambo ya bato yango (59 %) nde balobaki ete balukaka toli na Biblia. Mpe bato moke (29 %) balobaki ete batángaka Biblia “mingi te” to “batángaka yango te.”

Batatoli ya Yehova bazali kobimisa mpe kokabola Biblia, mpe lisusu bazali koyekolisa bato Biblia na ndako kozanga kosɛnga mbongo na mikili koleka 230. Lelo oyo na mokili mobimba bamilio ya bato bazali kozwa bolamu na mateya yango ya Biblia. Bazali kosalisa bango báyeba ndenge ya kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo oyo, mpe bazali koyekola makambo Biblia elobi mpo na elikya kitoko na mikolo ezali koya ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.—Yisaya 48:17, 18; Matai 6:9, 10.

[Bililingi na lokasa 32]

Bato bazali koyekola Biblia na bandako na bango (na motindo makɔnga ya montre etambolaka banda na likoló na loboko ya mwasi) na Bolivie, na Ghana, na Sri Lanka, mpe na Angleterre

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto