Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/1 lok. 3
  • Okoki koyeba makambo oyo ekoya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyeba makambo oyo ekoya!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kopesa elikya mpo na mikolo oyo ekoya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bolukiluki ya bisakweli oyo bibongi na kotyela motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Moto akoki koyeba avenire?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/1 lok. 3

Okoki koyeba makambo oyo ekoya!

Bato mingi bamibanzabanzaka mpo na mikolo oyo ezali koya. Bamilɛngɛlaka mpo na mikolo yango, babombaka mbongo mpe bazalaka na elikya ete bakozala malamu. Kasi, ndenge nini moto akoki koyeba makambo oyo ekoya?

BATO bameki makambo ndenge na ndenge mpo na koyeba makambo oyo ekoya. Bato oyo babengi na Lifalanse ba futurologues bazali koyekola makambo oyo ezali kosalema lelo oyo, mpe na makambo yango, bazali koyebisa ndenge oyo bango bazali komona makambo oyo ekozala na mikolo oyo ekoya. Bato ya ekonomi mpe bazali koyebisa ndenge oyo nkita ekozala na mikolo oyo ekoya. Bato mingi batyaka motema epai ya bato ya astroloji, epai ya bato oyo basakolaka makambo oyo ekoya, oyo batalaka bilembo ya horoscope, oyo batalaka na talatala, mpe balukaka makambo oyo ebombami. Na ndakisa, tii lelo oyo bato mingi balandaka makambo ya Nostradamus, moto moko ya astroloji na ekólo France, atako akufá banda kala mpenza.

Maloba ya bato wana nyonso oyo balobaka ete bazali basakoli ekokisamaka te mpe bato batyelaka bango motema mpamba. Ezali bongo mpamba te balandaka makanisi ya Yehova te mpe balandaka Liloba na ye Biblia te. Yango wana, bazali na biyano ya malamu te na mituna ya ntina lokola oyo: ‘Mpo na nini nakoki kondima ete makambo oyo Biblia esakolá ekokokisama mpenza? Ndenge nini makambo yango etaleli mokano ya Nzambe mpo na bato? Makambo oyo Biblia esakolá ekoki kozala na litomba nini mpo na ngai na libota na ngai?’ Biblia epesi biyano na mituna yango.

Makambo oyo Biblia esakolá eleki makambo oyo bato basakolaka na balolenge mosusu mingi. Makambo oyo Biblia esakolá ekeseni na makambo oyo bato ya astroloji basakolaka; makambo ya Biblia epekisaka moto te apona oyo alingi kosala. Yango wana, moto moko te akoki koloba ete bomoi na ye etángamá banda kala. (Deteronome 30:19) Mikanda ya bato lokola Nostradamus eteyaka ata likambo moko ya malonga te. Mikanda yango etondi nde na basɛkɛlɛ mpe masolo oyo ekamwisaka bato. Kasi, makambo oyo Biblia esakolá epesaka mateya ya ntina mpenza. Elimbolaka mpo na nini Nzambe akokokisa mokano na ye. (2 Ntango 36:15) Lisusu, makambo oyo Yehova asakolá ezangaka kokokisama te mpo “Nzambe akobukaka lokuta te.” (Tito 1:2) Yango wana, bato oyo balandaka Liloba ya Nzambe bazalaka na bomoi ya malamu, bomoi ya ntina mpe ya esengo; mpe lisusu, babebisaka ntango mpe bozwi na bango na makambo ya mpambampamba te.—Nzembo 25:12, 13.

Mayangani ya etúká na motó ya likambo ete: “Liloba ya esakweli ya Nzambe,” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na mokili mobimba na 1999 mpe na 2000 elobelaki makambo yango mpe makambo mingi mosusu. Masukulu, mituna, bilakiseli, mpe drame emonisaki bayangani libula ya elimo ya bato oyo bayekolaka mpe basalelaka Liloba ya esakweli ya Nzambe. Lisolo oyo elandi ekozongela mwa makambo ya ntina oyo elekaki na mayangani yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto