Ntango ‘mopɛpɛ ezali kozongisa biso nsima’
Mpo na kolobela likama oyo bayekoli ya Yesu bakutanaki na yango ntango bazalaki kokatisa Mai Monene ya Galilai na bwato, Malako akomaki na Evanzile na ye ete “bakoki lisusu kobenda bwato na nkai te mpo mopepe ezalaki kozongisa bango nsima.” Na libongo epai atikalaki, Yesu amonaki mokakatano ya bayekoli na ye mpe atambolaki likoló ya mai tii na esika oyo bazalaki. Ntango akɔti na bwato . . . mopɛpɛ esili. —Malako 6:48-51.
Malako alobelaki likama mosusu oyo esalamaki liboso na libaku mosusu, “mopepe moko ya makasi ebandi koleka.” Yango wana, Yesu “agangeli mopepe . . . Bongo mopepe esili mpe kimya ezongi mpenza.” —Marko 4:37-39, Boyokani ya Sika.
Atako lelo oyo tokoki komona makamwisi ya ndenge yango te, tokoki kozwa liteya monene na masolo yango. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali na ntango ya mpasi, mitungisi ezali mpe kobɛta biso lokola mopɛpɛ makasi. (2 Timote 3:1-5) Ntango mosusu tokoki mpenza komona ete bampasi mpe komekama na biso ekómi lokola mopɛpɛ makasi. Atako bongo, tokoki kozwa lisungi! Yesu alobi boye: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”—Matai 11:28.
Soki tomoni ete ‘mopɛpɛ ezali kozongisa biso nsima,’ tokoki kozwa “kimya” ya motema. Ndenge nini? Soki tokotya elikya na bilaka ya Yehova Nzambe, bilaka oyo ekokokisama solo.—Talá Yisaya 55:9-11; Bafilipi 4:5-7.