Mikakatano ya baboti—ndenge nini kolonga yango
KOBƆKƆLA bana lelo oyo, mingimingi baoyo bakómi bilenge, ezali mpenza mokakatano monene mpo na baboti. Zulunalo The Gazette ya Montreal, na Canada elobi ete komela masanga makasi to bangi ekómi “momeseno ya bilenge.” Yango ezali komonisa ete baboti bazali na “mokumba ya kokeba na mbongwana ya bizaleli ya bana na [bango].”
Ndenge nini baboti bakoki koyeba ete bizaleli ya bana na bango oyo bakómi bilenge ebandi kobongwana? Lisangá moko oyo eyekolaka bizaleli ya bana mpe bilenge na États-Unis (American Academy of Child and Adolescent Psychiatry) emonisi ete okoyeba mbongwana yango na nzoto, na mayoki mpe na bizaleli na bango. Lisangá yango elobeli makambo lokola kolɛmba makasi ntango molai, bomoto mpe bizaleli ekómi ndenge mosusu, komikanga ntango molai na ndako, komekana na basusu mpe mobulu.
Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango na makambo oyo ya mpasi mpo mbuma mabe na yango ekómela bango te? Monganga Jeffrey L. Derevensky na iniversite moko (McGill University) andimi ete kosololaka polele na bana mpe kolendisa bango ete bápesanaka limemya na bato mosusu na boumeli ya bambula oyo mwana azali koyekola ekoki kosala ete mikakatano ezala mingi te na nsima. Zulunalo The Gazette ebakisi ete, atako mposa ya kozala na lipanda mingi koleka ebimaka na boumeli ya bolenge, bilenge bazalaka ntango nyonso na mposa ya “litambwisi, lisungi, kobongisama mpe bolingo ya baboti na bango.” Makanisi oyo ezongeli lisese moko ya Biblia oyo elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye [mokóló] akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Nzambe apesi baboti toli ete bázala ndakisa malamu, baninga malamu, básololaka na bana na bango mpe bázala bateyi malamu.—Deteronome 6:6, 7.